Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 2/09 lok. 1
  • Kampanye monene mpo na kobenga bato na Ekaniseli!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kampanye monene mpo na kobenga bato na Ekaniseli!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Tókabola nkasa ya libyangi mpo na Ekaniseli na mokili mobimba!
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Kampanye mpo na kokabola nkasa ya libyangi na Ekaniseli ekobanda mwa 17 Marsi
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Kampanye mpo na kokabola lokasa ya libyangi ya Ekaniseli ekobanda mwa 22 sanza ya misato
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Kampanye mpo na kokabola nkasa ya libyangi na Ekaniseli ekobanda mokolo ya 2 Aprili
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 2/09 lok. 1

Kampanye monene mpo na kobenga bato na Ekaniseli!

1. Kobanda na mokolo ya 21 Marsi 2009 basakoli nyonso ya Bokonzi na mokili mobimba bakosala nini, mpe mpo na nini?

1 Na mokolo ya Minei 9 Aprili 2009, basaleli ya Yehova Nzambe na mokili mobimba bakoyangana mpo na kokanisa bolingo monene oyo Yehova amoniselaki bato. (Lom. 5:6-8) Tozali mpenza kolikya ete bamilio ya bato oyo basepelaka na nsango malamu bakoyangana elongo na biso mpo na kokanisa liwa ya Yesu. Kobanda na mokolo ya 21 Marsi, na mokili mobimba, tokokabola lokasa ya kobenga bato na Ekaniseli.

2. Makambo nini osengeli kobosana te ntango ozali kopesa moto lokasa mpo na kobenga ye na Ekaniseli?

2 Makambo oyo tosengeli kobosana te: Salelá malamu bililingi, mituna, mpe bavɛrsɛ oyo ezali na lokasa ya kobenga bato na Ekaniseli. Na ndakisa, okoki kosalela elilingi oyo ezali na lokasa ya liboso mpe koloba boye: “Nalingi kobenga yo oya kosangana na biso mpo na kokanisa liwa ya Yesu, na mokolo ya Minei 9 Aprili 2009.” Na nsima, lobelá motó ya likambo oyo ezali na lokasa yango mpe mituna mosusu oyo elandi. Yebisá moto yango ete akoki mpe kobenga bato ya libota na ye mpe bato mosusu na likita yango.

3. Okoki kosala nini mpo bato oyo opesaki nkasa ya kobenga bango na Ekaniseli na ebandeli ya kampanye bábosana te?

3 Soki teritware ya lisangá na bino ezali monene, bankulutu bakoki koyebisa basakoli bátika nkasa ya kobenga bato na Ekaniseli ata na bandako oyo bakuti bato te. Na mikolo ya pɔsɔ mpe ya lomingo, tokokabola nkasa ya kobenga bato na Ekaniseli ná bazulunalo. Zalá na mokano ya kobenga bato oyo bandimaki ozongela bango, bato oyo oyekolaka na bango Biblia, bandeko na yo, baninga ya kelasi, baninga ya mosala, bato ya kartye, mpe bato mosusu oyo oyebi. Na mbula eleki, ndeko mwasi moko apesaki bandeko na ye 30 nkasa ya kobenga bango na Ekaniseli, mpe liboso mokolo yango ekoka, azalaki kokundwela bango ntina ya Ekaniseli. Kanisá esengo oyo azalaki na yango ntango bato 25 kati na bango bayaki na Ekaniseli mpe 4 bandimaki koyekola Biblia!

4. Bibongiseli nini tosengeli kozwa banda sikoyo, mpe mpo na nini?

4 Tóbanda komibongisa sikoyo: Ntango mosusu, basakoli mingi bakozala na likoki ya kosakola mingi na sanza ya Marsi mpe Aprili. Soki ozali na bana to bayekoli ya Biblia oyo bazali kokola malamu, yango ekozala ntango malamu mpo bákóma basakoli. Sikoyo nde ntango ya komibongisa mpo na kosangana mingi na kampanye yango ya kobenga bato mpo na kokanisa bolingo monene oyo Yehova mpe Yesu bamoniselaki biso.​—Yoa. 3:16; 15:13.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto