Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 6/09 lok. 2
  • Tómibongisa malamu mpo na koteya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tómibongisa malamu mpo na koteya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Salisá moyekoli na yo akokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya liboso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Ndenge ya koyekola na moto Biblia tii azwa batisimo—Eteni ya mibale
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 6/09 lok. 2

Tómibongisa malamu mpo na koteya

1. Ntango tozali koyekola na moto Biblia, mpo na nini tosengeli kosalisa ye asepela na mateya ya Biblia?

1 Liboso ya koyekola na moto Biblia, tosengeli komibongisa malamu mpo na kosalisa ye asalela Yehova. Milende na biso ekobota mbuma malamu soki tosalisi moto yango asepela na mateya ya solo oyo ezali na Biblia. Yango ekolendisa ye. (Det. 6:5; Mas. 4:23; 1 Kol. 9:26) Ndenge nini tokoki kosala yango?

2. Ndenge nini libondeli ekoki kosalisa biso tómibongisa malamu?

2 Tóbondela ntango tozali komibongisa: Lokola Yehova ye moko nde akolisaka mboto ya solo na motema ya moto, ntango tolingi komibongisa mpo na koyekola na moto Biblia, ekozala malamu tóbondela mpo na moto yango mpe mpo na makambo ya bomoi na ye. (1 Kol. 3:6; Yak. 1:5) Libondeli yango ekoki mpe kosalisa biso tóyeba soki asengeli na mateya mosusu mpo motema na ye etonda “na boyebi ya solosolo” ya mokano ya Yehova.​—Kols. 1:9, 10.

3. Ndenge nini tokoki kokanisa moto oyo tokoyekola na ye ntango tozali komibongisa?

3 Tókanisa moto oyo tokoyekola na ye: Yesu ayebaki ete mpo na koteya malamu, esengeli kotalela bato oyo tozali koteya. Bato mibale batunaki Yesu motuna oyo: “Nasala nini mpo nazwa libula ya bomoi ya seko?” Yesu asalelaki maloba ekeseni mpo na kopesa eyano na motuna moko wana. (Luka 10:25-28; 18:18-20) Tosengeli kokanisa moto oyo tokoyekola na ye ntango tozali komibongisa. Bavɛrsɛ nini maloba na yango etyami te na kati ya lisolo tokotánga ná ye? Tokoyekola baparagrafe boni? Makambo nini moto yango akomona ete ezali mpasi akanga ntina na yango to andima yango? Soki tokanisi liboso mituna oyo moto yango akoki kotuna, tokomibongisa malamu mpo na koyanola yango.

4. Komibongisa malamu esɛngaka kosala nini?

4 Tótalela makambo oyo tokoyekola: Ata soki ezali makambo oyo toyekolá na bato mingi, ekozala mbala ya liboso ya koyekola yango na moto wana. Soki tolingi kosimba motema na ye, tosengeli komibongisa malamu mbala nyonso oyo tolingi koyekola na ye. Yango elimboli kosala makambo oyo tolendisaka ye asala. Tosengeli kotalela eteni oyo tokoyekola, ná bavɛrsɛ oyo maloba na yango etyami na lisolo te, kokanisa moto oyo tokoyekola na ye, mpe mbala mosusu kotya mikɔlɔtɔ na makanisi ya ntina.​—Lom. 2:21, 22.

5. Ndenge nini tokoki kolanda ndakisa ya Yehova?

5 Yehova asepelaka komona ndenge moyekoli mokomoko ya Biblia azali kokola na elimo. (2 Pet. 3:9) Soki tozali kozwa ntango mingi mpo na komibongisa liboso ya koyekola na moto Biblia, tokomonisa ete biso mpe tolingi moto yango akola na elimo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto