Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/09 lok. 2
  • Omibongisi mpo na kozonga na kelasi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omibongisi mpo na kozonga na kelasi?
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Bana na yo basili komibongisa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Bilenge​—Bózwa matomba na kelasi na bino
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Kobanga te kopesa litatoli
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Kopesa litatoli ezali kobota mbuma na ndako mpe na eteyelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 8/09 lok. 2

Omibongisi mpo na kozonga na kelasi?

1. Ntango okozonga kelasi, okozala na mabaku nini?

1 Ata soki ezali mbala na yo ya liboso to te ya kozonga na kelasi, toyebi ete lokola ozali elenge moklisto, okokutana na mikakatano. Kasi, okozwa mpe mabaku ya ‘kopesa litatoli na ntina etali solo.’ (Yoa. 18:37) Omibongisi malamu mpo na kopesa litatoli?

2. Lokola olingi kozonga na kelasi, osengeli komibongisa mpo na kosala nini?

2 Mpo na kosalisa yo olonga na makambo ndenge na ndenge ya bomoi na yo, Yehova, baboti na yo, mpe moombo ya sembo mpe ya mayele, bazali kopesa yo formasyo. (Mas. 1:8; 6:20; 23:23-25; Ef. 6:1-4; 2 Tim. 3:16, 17) Na ntembe te, oyebi malamu mikakatano oyo okokutana na yango na kelasi. Lokola ozali kozwa formasyo oyo euti na Nzambe mpe oyebi makambo oyo okokutana na yango, osengeli komibongisa mpo na kopesa litatoli. (Mas. 22:3) Talelá malamu batoli mpe makanisi ya Biblia oyo ezali na buku Mituna oyo bilenge batunaka volimi 1 mpe 2, ata mpe masolo ya ndenge wana oyo ebimaka mbala na mbala na Lamuká!

3. Osengeli kosala nini mpo opesaka litatoli?

3 Kelasi ezali teritware oyo ekopesa yo mabaku mingi ya kopesa litatoli. Ntango basusu bakomona ete olataka malamu, obongisaka nzoto na yo malamu, ozali na etamboli ya malamu mpe ozali na maloba ya mabe te, omemyaka baninga na yo ya kelasi mpe otosaka balakisi na yo, ozali mayele na kelasi, mpe ozali na bomoi oyo ezali na ntina, basusu bakoki kotuna ete, “Mpo na nini okeseni na bana-kelasi mosusu?” (Mki. 3:18; Yoa. 15:19) Na ndenge yango, okoki kozwa libaku ya kopesa litatoli mpe kolimbola bindimeli na yo. (1 Tim. 2:9, 10) Na kelasi, okokutana na mikakatano ntango bakobanda kosala milulu ya kokumisa ekólo to bafɛti mosusu. Soki batuni yo mpo na nini osalaka milulu yango te, okoloba kaka ete “Lingomba na biso epekisi; nazali Motatoli ya Yehova,” to okomona ete ezali libaku ya kopesa litatoli na ntina na Yehova, Tata na yo ya bolingo? Komibongisa malamu mpe koluka litambwisi ya Yehova ekosalisa yo oyeba kopesa litatoli epai ya balakisi, baninga na yo ya kelasi, mpe bato mosusu.​—1 Pet. 3:15.

4. Mpo na nini okoki kozala na elikya ete okolekisa mobu malamu na kelasi?

4 Atako likanisi ya kozonga na kelasi ezali kobangisa yo mwa moke, yebá ete bato mingi balingi ete olekisa mobu malamu na kelasi. Lisusu, tozali na esengo lokola toyebi ete okozala na mabaku mingi ya kopesa litatoli na eteyelo. Na yango, zalá na mpiko mpe omibongisa mpo na kozonga na kelasi!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto