Tózala na mokano ya kopesa mibali litatoli
1. Tozali na mposa makasi ya banani mpo na kotambwisa makambo na kati ya lisangá?
1 Lokola mosala ya kosakola ezali se kokende liboso na mikolo oyo ya nsuka, lisangá ya Yehova ezali mpenza na mposa ya bandeko mibali oyo bakɔmeli mpo na kotambwisa makambo na kati ya lisangá. (Mko. 4:30-32; Mis. 20:28; 1 Tim. 3:1-13) Nzokande, na bisika mosusu, mibali moke kaka nde bazali kondima nsango ya Bokonzi. Na bisika mosusu, mibali batikelaka basi na bango mokumba ya koteya bana makambo ya Nzambe. Ndenge nini tokoki kolendisa mibali mingi báyeba bamposa na bango ya elimo mpe básangana na biso na losambo ya solo?
2. Milende oyo Paulo mpe Petelo basalaki mpo na kopesa mibali litatoli ebotaki mbuma nini?
2 Tópesa mibali litatoli: Soki tata moko ya libota andimi solo, mbala mingi asalisaka mpe bato mosusu ya libota na ye bándima solo. Na ndakisa, ntango Paulo mpe Silasi bakɔtaki bolɔkɔ mpo na mosala ya kosakola, bateyaki mokɛngɛli moko ya bolɔkɔ. Mobali yango ná libota na ye mobimba babatisamaki. (Mis. 16:25-34) Ntango Paulo asakolaki nsango malamu na Kolinti, “Klisipusi mokambi ya sinagoga akómaki mondimi na kati ya Nkolo, ndenge moko mpe bato nyonso ya ndako na ye.” (Mis. 18:8) Yehova asalelaki Petelo mpo ateya Koloneyi, mokonzi moko ya basoda oyo Biblia elobi ete azalaki “moto oyo amipesá na losambo mpe oyo azalaki kobanga Nzambe.” Koloneyi ná libota na ye mpe baninga na ye babatisamaki.—Mis. 10:1-48.
3. Na ndakisa ya Filipe, nani oyo azali na “ebonga monene” oyo okoki kopesa litatoli?
3 Kopesa litatoli epai ya mibali oyo bazali na “bibonga minene” ekoki kobimisa matomba mosusu na nsima. (1 Tim. 2:1, 2) Na ndakisa, anzelu ya Yehova atindaki Filipe akende kosakola nsango malamu epai ya “moto monene” oyo azalaki kotalela mosolo nyonso ya mokonzi mwasi ya Baetiopia. Filipe ayokaki mobali yango azali “kotánga na mongongo makasi mosakoli Yisaya” mpe alimbwelaki ye nsango malamu na ntina na Yesu. Moetiopia yango akómaki moklisto mpe ekoki kozala ete apalanganisaki nsango malamu na boumeli ya mobembo na ye. Ekoki mpe kozala ete apesaki mokonzi-mwasi mpe basali na ye litatoli, bato oyo ezalaki mpasi báyoka nsango malamu.—Mis. 8:26-39.
4. Mabaku nini tokoki kosalela mpo na kopesa mibali mingi litatoli?
4 Okosala nini mpo opesa mibali mingi litatoli? Lokola mibali mingi bakendaka mosala na moi, okoki kobongisa programɛ na yo mpo osakolaka mingi na mpokwa, na bawikende to na mikolo oyo mosala ezalaka te? Soki mpe osakolaka na bamagazini, okozwa libaku ya kopesa litatoli epai ya mibali mingi oyo tokutaka na ndako te. Bandeko ya mibali bakoki mpe kosala makasi mpo bápesaka litatoli ya libaku malamu epai ya mibali oyo bazali baninga na bango ya mosala. Ntango tozali kosakola ndako na ndako na teritware oyo esakolamaka mingi, bandeko ya mibali bakoki kosɛnga ete básolola na mobali oyo azali nkolo-ndako.
5. Soki ndeko mwasi moko apesi mobali moko litatoli mpe asepeli bázongela ye, ndeko mwasi yango asengeli kosala nini?
5 Soki ndeko mwasi moko apesi mobali moko litatoli mpe asepeli bázongela ye, ndeko mwasi yango asengeli kokende ye moko te. Asengeli kozongela ye elongo na mobali na ye to ná mosakoli mosusu. Soki mobali yango azali kosepela na boyekoli, ekozala malamu mpenza ete ndeko moko ya mobali oyo ayebi koteya malamu ayekola na ye.
6. Ndakisa nini ya Paulo tosengeli kolanda mpo ‘tózwa bato mingi koleka’?
6 Lobelá makambo oyo esepelisaka mibali: Ntoma Paulo azalaki koyokanisa mateya na ye na bamposa ya bayoki na ye mpo ‘azwa bato mingi koleka.’ (1 Kol. 9:19-23) Biso mpe tosengeli koluka koyeba makambo oyo ekoki kosepelisa mibali oyo tokokutana na bango mpe komibongisa malamu mpo na kopesa litatoli. Na ndakisa, mibali mingi bamitungisaka mpo na makambo ya mbongo, boyangeli ya malamu mpe ndenge nini bakoki kobatela mpe kokokisa bamposa ya mabota na bango. Bakoki mpe koluka koyeba ntina ya bomoi, avenire ya mabelé mpe mpo na nini Nzambe apesi nzela na mpasi. Mibali bakosepela koyoka nsango malamu ya Bokonzi soki tolobeli makambo wana.—Mas. 16:23.
7. Ndenge nini bandeko nyonso na kati ya lisangá bakoki kosalisa mibali oyo bazali Batatoli te kasi bayanganaka na makita?
7 Tópesa litatoli epai ya mibali oyo basi na bango bazali baklisto: Atako mbala mingi etamboli ya bandeko basi baklisto esalisaka mpenza mibali na bango oyo bazali baklisto te básambela Yehova, bandeko ya lisangá mpe bakoki kosalisa mingi. (1 Pet. 3:1-4) Ntango mobali oyo azali moklisto te azali kokende makita elongo na mwasi na ye, soki bandeko ya lisangá bazali koyamba ye na esengo, yango ekozala litatoli monene mpo na ye. Koya na ye na makita emonisi ete azali na mwa bolingo mpo na solo mpe akoki kondima koyekola Biblia.
8. Makambo nini bandeko mibali bakoki kosala mpo na kosalisa mibali oyo basi na bango bazali Batatoli, oyo basepelaka mwa moke na solo?
8 Ezali mpe na mibali mosusu oyo na ebandeli basepelaka mpenza na solo te, kasi na nsima bandimaka koyekola Biblia na ndeko oyo asepelisi bango. Na lisangá moko, bandeko mibali bazwaki ekateli ete soki bakei kotala libota moko oyo mobali azalaki moklisto te, bábɛtaka na ye masolo ya makambo oyo esepelisaka ye. Nsukansuka bakómaki kosolola masolo ya Biblia, mpe lelo oyo azali ndeko oyo azwá batisimo. Ndeko mosusu asalisaki mobali moko oyo mwasi na ye azali Motatoli na kotonga efelo ya lopango na ye. Lokola ndeko wana asalisaki ye, yango esalaki ete bábanda koyekola Biblia. (Gal. 6:10; Filp. 2:4) Soki ozali ndeko mobali, mpo na nini te kosala boninga ná moko to ebele ya mibali oyo basi na bango bazali Batatoli?
9. Kopesa mibali oyo bazali baklisto formasyo ekoki komema matomba nini?
9 Tópesa mibali formasyo: Mibali oyo bandimi nsango ya Bokonzi mpe balingi kozwa mikumba na kati ya lisangá, bakoki kokóma “makabo oyo ezali bato,” elingi koloba bankulutu oyo basalelaka makoki na bango mpe makasi na bango mpo na kosalisa masangá ya basaleli ya Yehova. (Ef. 4:8; Nz. 68:18) Mibali yango babatelaka lisangá na motema moko mpe na esengo. (1 Pet. 5:2, 3) Bazalaka mpenza lipamboli mpo na lisangá mobimba!
10. Milende oyo Ananiasi asalaki mpo na koteya Paulo ememeli bamilio ya bato matomba nini?
10 Na ndakisa, Saulo oyo liboso azalaki konyokola baklisto, akómaki “ntoma epai ya bikólo mosusu.” (Lom. 11:13) Kutu, na ebandeli, Ananiasi akakatanaki mpo na kokende koteya Saulo. Kasi, Ananiasi atosaki etinda ya Nkolo mpe ateyaki mobali yango oyo na nsima akómaki ntoma Paulo. Na boumeli ya bambula ebele, Paulo asalisaki bamilio ya bato oyo ateyaki nsango malamu; ezala mpe mikanda oyo akomaki ezali kokoba kosalisa bamilio ya bato tii lelo oyo.—Mis. 9:3-19; 2 Tim. 3:16, 17.
11. Mpo na nini tosengeli kosala nyonso oyo tokoki mpo na kopesa litatoli epai ya mibali?
11 Tiká ete tósala nyonso oyo tokoki mpo na kopesa litatoli epai ya mibali. Wana tozali kokokisa mokano yango, Yehova akozanga te kopambola milende na biso mpo na kosala mokano na ye mpe kosala ete matomba ya Bokonzi ekende liboso.