Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/09 lok. 2
  • “Bópela na elimo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bópela na elimo”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Masolo mosusu
  • Tókoba kosakola na molende
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Okomekola molende ya Yehova mpe ya Yesu na eleko oyo ya Ekaniseli?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2015
  • Monisáká molende na mosala ya kosakola
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Zalá na mposa makasi ya kosakola nsango malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2009
km 11/09 lok. 2

“Bópela na elimo”

1. Likambo nini esengeli komonana na mosala na biso ya kosakola?

1 Likambo moko te na mosala na biso ya bokristo esengeli kotɛlɛma esika moko. Yango wana, Biblia elendisi biso ete ‘tópela na elimo’ mpe ‘tósalela Yehova lokola baombo.’ (Ro. 12:11) Nzokande, ezali na makambo mingi oyo ekoki kokitisa molende na biso ya kosakola. Ndenge nini tokoki ‘kopelisa lokola mɔtɔ’ molende mpe esengo na biso na mosala ya Bokonzi?​—2 Tim. 1:6, 7.

2. Boyokani nini ezali kati na koyekola Biblia biso moko mpe kozala na molende na mosala ya kosakola?

2 Koyekola Biblia biso moko: Mosakoli oyo asalaka mosala na ye malamu alingaka mobeko ya Nzambe mpe asepelaka na mateya ya solo oyo ezali na mobeko yango. (Nz. 119:97) Ntango tozali koyekola Biblia biso moko mpe tozali komona biloko ya motuya oyo ezali na kati na yango, motema na biso etondaka na esengo mpe molende na biso ebakisamaka. Bolingo oyo tolingaka Mopesi ya mateya yango mpe mposa na biso ya koyebisa bato mosusu nsango malamu etindaka biso tósanzola Nzambe mpe tósakola nkombo na ye polele. (Ebr. 13:15) Kosakola nsango malamu na molende emonisaka ete tozwaka yango na motuya mingi.

3. Ndenge nini elimo ya Nzambe ekoki kosalisa biso na mosala ya kosakola?

3 Kobondela mpo na kosɛnga elimo ya Nzambe: Moto moko te akoki kosala mosala ya kosakola malamu na makasi na ye moko! Moto azalaka na molende ya solosolo soki eloko moko te ezali kopekisa elimo santu esala mosala epai na ye. (1 Pe. 4:11) Kopusana penepene na Ye oyo apesaka “makasi mingi” ekosalisa biso tózwa nguya ya kosakola na mpiko. (Yis. 40:26, 29-31) Ntango banguna batɛmɛlaki ntoma Paulo mpo atika kosakola, ‘azwaki lisalisi oyo eutaki epai ya Nzambe.’ (Mis. 26:21, 22) Elimo santu ya Yehova, oyo epesaka moto makasi, ekoki kosalisa biso tópela na elimo na mosala ya kosakola; yango wana, tosengeli kosɛngaka yango na libondeli.​—Luka 11:9-13.

4. Mbuma nini ya malamu molende ekoki kobota, kasi tosengeli kokeba na likambo nini?

4 Mbala mingi, soki tozali kosakola Bokonzi na molende, bandeko na biso bakristo oyo tozali na bango esika moko bakokóma mpe na molende. (2 Ko. 9:2) Na teritware na biso, bato mosusu bakondima nsango malamu soki tozali kosakola yango na esengo mpe na kondima. Kasi, ata soki tozali na molende, tosengeli ntango nyonso mpe kozala na maloba ya malamu mpe na boboto. (Tito 3:2) Tosengeli ntango nyonso kopesa moto oyo ayambi biso lokumu mpe komemya bonsomi na ye ya kopona.

5. Toli nini oyo ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe tosengeli kolanda?

5 Lokola tozali basakoli ya Bokonzi, tiká ‘tópela na elimo’ ntango nyonso. Tóyekola Biblia biso moko na molende, mpe na etingya, tóbondela Yehova, ye oyo akoki kopesa biso elimo santu. Na ndenge yango, tokokokisa mosala na biso na molende na lisalisi ya “elimo santu mpe na kondima makasi.”​—1 Tes. 1:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto