Ndenge ya kolakisa bazulunalo (Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Novɛmbɛ
“Tozali komona ete mikakatano na mabota ezali se kobakisama. Mpo na yo, makambo ekozala ndenge nini soki moto mokomoko asali makasi amekola ezaleli ya Yesu oyo Biblia elobeli awa? [Tángá Matai 20:28. Na nsima, tiká ye apesa eyano.] Lisolo oyo elobeli mateya mitano oyo mabota ekoki kozwa na ndakisa ya Yesu.” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 16.
Lamuká! Novɛmbɛ
“Mpo na yo, mangomba esalisaka bato bázala na bolingo mpe na kimya to nde ekɔtisaka koyinana mpe mobulu? [Tiká ye apesa eyano.] Emonani ete bato mingi bazali kolanda te maloba ya Yesu oyo ezali na vɛrsɛ oyo. [Tángá Matai 5:44, 45.] Lisolo oyo epesi eyano na motuna oyo: Moto akoki nde kolinga banguna na ye?” Lakisá lisolo oyo ebandi na lokasa 10.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Desɛmbɛ
“Okanisaka ete mokolo mosusu Nzambe akosilisa bampasi oyo ezali na mokili? [Tiká ye apesa eyano.] Talá elaka ya Biblia oyo ezali kopesa biso elikya. [Tángá vɛrsɛ moko na kati ya bavɛrsɛ oyo ezali na etanda na lokasa 7.] Zulunalo oyo emonisi oyo Biblia elobi mpo na ntango mpe lolenge oyo Nzambe akosilisa bampasi.”
Lamuká! Desɛmbɛ
“Bato mosusu bakanisaka ete molɔ́ngɔ́ ekelamaki, kasi bato mosusu mpe bamonaka ete ebimaki kaka yango moko mpe ezali na ntina moko te. Bongo yo okanisaka nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká likanisi ya Biblia. [Tángá Baebre 3:4.] Zulunalo oyo elimboli malamu ndenge molɔ́ngɔ́ ekelamaki mpe mpo na nini.”