Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya Yanuali
“Bato mosusu bandimaka ete Biblia ezali buku ya bisakweli oyo tokoki kotyela motema. Basusu bakanisaka ete ezali na bisakweli ya bongobongo oyo moto akoki kolimbola na ndenge na ye. Yo okanisaka nini?” [Tiká ye apesa eyano.] Na nsima, pesá ye Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali, mpe bótalela elongo motó ya likambo moke oyo ezali na lokasa 16 mpe bótanga ata vɛrsɛ moko. Pesá moto yango bazulunalo, mpe bóyokana mokolo oyo okozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 1 Yanuali
“Okanisi ete tokoki koyekola makambo mingi epai ya mibali mpe basi oyo bazalaki bato minene na lisolo ya bato? [Tiká ye apesa eyano.] Vɛrsɛ oyo elobeli mobali moko oyo azalaki moto monene, moto kaka moko oyo Biblia ebengi ‘moninga ya Nzambe.’ [Tángá Yakobo 2:23.] Zulunalo oyo emonisi ntina oyo Nzambe atalelaki Abrahama lokola moninga na ye mpe elobeli liteya oyo tokoki kozwa na ndakisa na ye.”
Lamuká! Yanuali
“Kanyaka mpe lolenge mosusu ya kozanga bosembo epalangani mingi na makambo ya mombongo. Bato mosusu bakanisaka ete mpo mombongo na bango etambola malamu basengeli kokosa na makambo mosusu. Bongo yo, okanisaka nini? [Tiká ye apesa eyano.] Yoká lisese oyo esengeli kotinda biso tókanisa. [Tángá Masese 20:17.] Zulunalo oyo emonisi ntina oyo tosengeli kozala sembo.”