Tósalela site Internet na biso na boyekoli ya biso moko mpe ya libota
Tángá bazulunalo ya sika na Internet: Tángá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na Internet mwa bapɔsɔ liboso tózwa yango na lisangá. Yoká botángi ya zulunalo.—Kende na “Mikanda/Bazulunalo.”
Tángá masolo oyo ezali kobima kaka na Internet: Masolo mosusu lokola: “Mpo na bilenge,” “Mateya ya Biblia mpo na bana,” “Mpo na kotalela na libota,” mpe “Mituna oyo bilenge batunaka,” ezali kobima sikoyo kaka na Internet. Kɔtá na Internet, mpe tálela masolo yango na boyekoli na yo moko mpe ya libota.—Kende na “Mateya ya Biblia/Bana” to “Mateya ya Biblia/Bilenge.”
Yebá bansango ya sika: Tángá balapolo ya kolendisa mpe makambo oyo bandeko bazali kokutana na yango, mpe talá bavideo oyo ezali komonisa ndenge mosala na biso ezali kokola na mokili mobimba. Bansango oyo elobeli makama mpe minyoko, ekoki kosalisa biso tólobaka makambo ya sikisiki ntango tozali kobondela mpo na bandeko oyo bakutani na mikakatano wana. (Yak. 5:16)—Kende na “Bansango.”
Salá bolukiluki na esika bakomi Mikanda oyo ezali na Internet: Soki yango ezali na monɔkɔ na bino, salelá ordintɛrɛ to telefone mpo na kotánga mokapo ya mokolo na Internet to mpo na kosala bolukiluki na mikanda na biso mosusu ya sika.—Kende na “Mikanda/Mikanda oyo ezali na Internet,” to komá www.wol.jw.org na esika bakɔtisaka adrɛsi.
[Etanda na lokasa 4]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Meká kosalela yango
1 Finá elilingi to esika bakomi “Zwá.” Elilingi yango ekobima na ndenge ya PDF. Bimisá yango na papye mpe pesá yango mwana mpo asalela yango.
2 Finá elembo oyo mpo otala video.