Ndenge ya kobanda lisolo
(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya mitano
“Biso nyonso tosalaka mabunga. Osilá komituna soki Nzambe akoki kolimbisa ata makambo ya mabe mpenza?” [Tiká ye apesa eyano.] Lakisá lisolo oyo ezali na lokasa 15 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2013, mpe bótalela makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/05/2013
“Tolingi koyeba likanisi na yo na vɛrsɛ oyo. [Tángá 1 Yoane 4:8.] Bato mingi bandimaka maloba oyo, kasi bamosusu bakanisaka ete Nzambe azali motema mabe na ndenge abimisaka makama minene, lokola mopɛpɛ makasi to koningana ya mabele, to atikaka nzela ete yango esalema. Yo okanisi boni? [Tiká ye apesa eyano.] Zulunalo oyo emonisi mpo na nini mpenza tosengeli te kokanisa ete Nzambe azali motema mabe.”
Lamuká! 05/2013
“Tozali kotala bato ya kartye na biso mpo na kosolola na bango likambo moko oyo ezali kopesa mpasi: mobulu. Bato mosusu bakanisi ete mpo mobulu esila esengeli kobakisa bapolisi mingi. Yo okanisi boni? [Tiká ye apesa eyano.] Oyebaka ete Biblia elaki ete mobulu ekosila? [Tángá Nzembo 37:10, 11.] Zulunalo oyo elobeli elaka wana mpe emonisi makambo oyo tokoki kosala mpo na komibatela na mobulu.”