Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/13 lok. 4
  • Ndenge ya kobanda lisolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kobanda lisolo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2012
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2013
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 5/13 lok. 4

Ndenge ya kobanda lisolo

(Soki zulunalo ya Lingala ezali te bósalela ya Lifalanse)

Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia mokolo ya pɔsɔ ya liboso ya sanza ya 6

“Pene na moto nyonso oyo tosololi na ye alobi ete azali na mposa kimya ezala na mokili. Kasi, bitumba ezali kaka. Mpo na yo, mpo na nini mokili ezali na kimya te?” [Tiká ye apesa eyano.] Na nsima, lakisá ye lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/06/2013, mpe bótalela elongo makambo oyo ezali na nse ya motuna ya liboso mpe bótánga ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana. Pesá ye bazulunalo, mpe bóyokana mpo ozongela ye mpo bótalela motuna oyo elandi.

Liyebisi: Bokosala elakiseli ya “Ndenge ya kobanda lisolo” oyo na likita ya mosala ya kosakola na dati ya 1 sanza ya 6.

Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/06/2013

“Tozali kotala bato ya kartye na mwa ntango moke mpo na kosolola likambo moko oyo etali bato nyonso. Bato mingi basilá kokanisela bango mabe. Okanisi ete ezali na esika moko na mokili epai bakaniselaka bato mabe te? [Tiká ye apesa eyano.] Talá ndenge Nzambe atalelaka bato nyonso. [Tángá Misala 10:34.] Zulunalo oyo elobeli ndenge oyo Nzambe akosilisa likambo ya kokanisela basusu mabe mpo na libela.”

Lamuká! 06/2013

“Tolingi koyeba likanisi na yo na likambo moko. Moto nyonso azalaka na mposa ya kozala na bomoi ya malamu. Okanisi ete tokoki kozala na bomoi ya malamu soki tozali kosomba biloko mingi? [Tiká ye apesa eyano.] Talá maloba ya ntina mingi oyo Yesu alobaki. [Tángá Luka 12:15.] Zulunalo oyo emonisi lolenge malamu ya kotalela biloko ya mokili mpe epesi makanisi oyo ebongi na oyo etali ndenge ya kosalela mbongo malamu.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto