Bakisá mabaku ya kosanzola Yehova
1. Ebongiseli nini ya sika ekosalisa biso ‘tósanzola Yehova mingi’?
1 Na sanza ya misato oyo euti koleka, ebongiseli moko ya sika ebandaki. Mosakoli akoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi ya ngonga 30 na sanza ya misato mpe ya minei, mpe na sanza oyo mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá. Soki viziti ya mokɛngɛli ebandi na nsuka ya sanza moko mpe ekɔti na sanza mosusu, basakoli oyo balingi kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi ya ngonga 30 bakoki kopona kosala yango na moko ya basanza wana. Babongisi-nzela basungi nyonso bakoki kokɔta kobanda ebandeli tii nsuka, na likita oyo mokɛngɛli ya zongazonga asalaka elongo na babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela monene. Yango emonisi ete ata soki tokoki te kosakola bangonga 50, tozali na likoki ya ‘kokumisa Yehova mingi’ na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi ya ngonga 30 mbala minei na mbula!—Nz. 109:30; 119:171.
2. Nini ekosepelisa mpenza baoyo bakosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na viziti ya mokɛngɛli ya zongazonga?
2 Ntango mokɛngɛli ya zongazonga ayei kotala lisangá: Sikoyo, basakoli mingi mpenza bakozala na likoki ya kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya viziti ya mokɛngɛli ya zongazonga mpe kozwa mabaku ya kolendisana ntango bazali kobima elongo na ye na mosala ya kosakola. (Rom. 1:11, 12) Mbala mosusu, babongisi-nzela basungi oyo bakendeke mosala bakoki kosɛnga mokolo moko ya konje na kati ya pɔsɔ mpo básakola elongo na mokɛngɛli ya zongazonga. Baoyo bakendeke mosala kobanda mokolo ya yambo tii ya mitano, bakoki kosɛnga mokɛngɛli ete básakola elongo na ye mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo. Lisusu, kokɔta banda ebandeli tii nsuka na likita elongo na babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela monene ekolendisa mpenza babongisi-nzela basungi!
3. Mpo na nini eleko ya Ekaniseli ezali ntango malamu mpenza ya kosala mosala ya mobongi-nzela mosungi?
3 Na sanza ya misato mpe sanza ya minei: Baoyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi ya ngonga 30 na sanza moko na eleko ya Ekaniseli, bakoki sikoyo kosala sanza mibale mpo na kobakisa “mbeka ya lisanzoli” na bango! (Ebr. 13:15) Sanza ya misato mpe sanza ya minei ebongi mpenza mpo na kozala babongisi-nzela basungi mpo na kokolisa mosala na biso ya kosakola. Mbula nyonso na basanza yango, tosalaka kampanye mpo na kobengisa bato na Ekaniseli. Lisusu, lokola basakoli ebele basakolaka mingi na eleko ya Ekaniseli, tokoki kozwa libaku ya kosakola elongo na basakoli ndenge na ndenge. Nsima ya Ekaniseli, tozongelaka bato oyo bayaki mpo na kosalisa bango básepela koya lisusu kolanda diskur ya ntina mingi. Motema na yo ekotinda yo osalela mabaku wana oyo ebakisami mpo na kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi?—Luka 6:45.