Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/13 lok. 2
  • Liloba ya Nzambe ezali na nguya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liloba ya Nzambe ezali na nguya
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Liyangani ya mokolo moko mpo na mobu 2010
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • ‘Bilei na ntango oyo ebongi’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2010
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Liyangani ya sika ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 8/13 lok. 2

Liloba ya Nzambe ezali na nguya

1. Motó ya likambo ya liyangani ya mokolo moko ya mobu ya mosala 2014 ezali nini?

1 Na kokesana na biloko nyonso oyo bato ya kozanga kokoka basalá, Biblia ezali na nguya ya kobongola bomoi na biso, koyokanisa makanisi mpe banzela na biso na mokano ya Yehova. Nguya nini Liloba ya Nzambe ezali na yango? Ndenge nini tokoki mpenza kosalela nguya yango na bomoi na biso? Ndenge nini tokoki kosalela yango malamumalamu mpo na kosalisa basusu? Tozali na elikya ete biso nyonso tokolendisama na elimo ntango bakotalela mituna yango na liyangani ya mokolo moko oyo ebongisami mpo na mobu ya mosala 2014. Motó ya likambo na yango ezali, “Liloba ya Nzambe ezali na nguya,” euti na Baebre 4:12.

2. Tosengeli kotya likebi na biyano ya mituna nini?

2 Luká biyano na mituna oyo: Ntango okolanda liyangani yango, komá biyano ya mituna oyo ezali awa na nse.

  • Mpo na nini tosengeli kotyela Liloba ya Yehova motema? (Nz. 29:4)

  • Ndenge nini tokoki komona nguya ya Liloba ya Nzambe na bomoi na biso? (Nz. 34:8)

  • Ndenge nini okoki komonisa nguya ya Liloba ya Nzambe na mosala na yo ya kosakola? (2 Tim. 3:16, 17)

  • Nini ekosalisa biso mpo tókosama te na nguya ya mokili ya Satana (1 Yoa. 5:19)

  • Lokola ozali elenge, ndenge nini okoki kokoba kosalela Nzambe? (Yir. 17:7)

  • Ndenge nini tokoki kokóma mpenza na nguya ata ntango tozali na bolɛmbu? (2 Ko. 12:10)

  • Nini ekosalisa biso tókoba kobongwana, ata soki tozali na bizaleli to mimeseno oyo epikamá mpenza? (Ef. 4:23)

3. Longola kolanda programɛ, ndenge nini tokoki lisusu kozwela liyangani ya mokolo moko matomba?

3 Tokozwa mpenza matomba ntango tokoyoka makambo wana ya ntina mingi! Longola yango, ndenge moko na liyangani ya zongazonga mpe ya etúká, liyangani ya mokolo moko epesaka biso libaku ya koyebana mpe kosolola na bandeko basi mpe mibali ya masangá mosusu. (Nz. 133:1-3; 2 Ko. 6:11-13) Na yango, zwá ntango ya kosolola na baninga ya kala mpe kosala boninga ya sika. Soki batindi molobi-mopaya na ndakisa mokɛngɛli ya etúká to ndeko ya Betele na liyangani na bino ya mokolo moko, mpo na nini te kokende kopesa ye ná mwasi na ye mbote? Ya solo, tozali na bantina mingi ya kozela na motema likoló mokolo oyo liyangani yango ekosalema!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto