Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 9/13 lok. 1
  • Landá ndakisa ya basakoli—Amose

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Landá ndakisa ya basakoli—Amose
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2013
  • Masolo mosusu
  • Tósakola Liloba ya Nzambe na mpiko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Mokanda ya Biblia nimero 30—Amosa
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Liteya euti na Makomami: Amos 1:1 kino 9:15.
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Yehova akopesa bato mabe etumbu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2013
km 9/13 lok. 1

Landá ndakisa ya basakoli​—Amose

1. Mpo na nini ndakisa ya mosakoli Amose ekoki kolendisa biso?

1 Ekómelá yo omiyoka ete okokoka kosakola te mpo otángá kelasi mingi te mpe obotamá na libota oyo ezali ya bozwi te? Soki bongo, ndakisa ya mosakoli Amose ekoki kolendisa yo. Azalaki mobɔkɔli-mpate mpe na bileko mosusu ya mbula, mosali-bilanga; kasi Yehova apesaki ye nguya mpo asakola nsango moko ya ntina mingi. (Amo. 1:1; 7:14, 15) Ndenge moko mpe na mikolo na biso, Yehova asalelaka bato mpamba mpe ya komikitisa. (1 Ko. 1:27-29) Mateya nini mosusu tokoki kozwa epai ya mosakoli Amose na oyo etali mosala na biso ya kosakola?

2. Mpo na nini tokoki kotikala ngwi liboso ya botɛmɛli?

2 Tikalá ngwi liboso ya botɛmɛli: Amazia azalaki nganga-nzambe ya basambeli ya mwana-ngɔmbɛ oyo bazalaki na bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele na nɔrdi. Ntango ayokaki Amose azali kosakola asilikaki; mpe makambo oyo alobaki na Amose, ezalaki lokola nde alobi ete: ‘Zongá na mboka na bino! Tiká biso kimya! Biso mpe tozali na lingomba na biso!’ (Amo. 7:12, 13) Amazia akoselaki mosakoli Amose makambo ntango asɛngaki mokonzi Yeroboame apekisa mosala na ye. (Amo. 7:7-11) Kasi Amose abangaki te. Lelo oyo, bakonzi mosusu ya mangomba balukaka ete bakonzi ya politiki básalisa bango na milende oyo bazali kosala mpo na konyokola basaleli ya Yehova. Nzokande, Yehova andimisi biso mpenza ete ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kobundisa biso ekolonga mpo na libela.​—Yis. 54:17.

3. Wapi makambo mibale oyo tosakolaka na nsango na biso?

3 Sakolá lisambisi ya Nzambe mpe mapamboli ya mikolo ezali koya: Atako Amose asakolaki lisambisi ya Nzambe epai ya bokonzi ya mabota zomi ya Yisraele, asukisaki mokanda ya Biblia oyo ezali na nkombo na ye na elaka ya Yehova ya kozongisa bato na ye mpe kopambola bango lisusu mingi. (Amo. 9:13-15) Biso mpe tosakolaka ‘mokolo ya kosambisa’ ya Nzambe oyo ezali koya; kasi yango ezali kaka eteni moko ya “nsango malamu oyo ya bokonzi” oyo tosengeli kosakola. (2 Pe. 3:7; Mat. 24:14) Ntango Yehova akoboma bato mabe na Armagedone, yango ekofungola nzela mpo mabele ekóma paradiso.​—Nz. 37:34.

4. Nini endimisi biso mpenza ete tokoki kokokisa mokano ya Yehova?

4 Na ntembe te, kosakola nsango ya Bokonzi na mokili oyo batɛmɛli bazali mingi etyaka na komekama komipesa na biso epai ya Yehova mpe kosala mokano na ye. (Yoa. 15:19) Kasi, tondimisami mpenza ete Yehova akokoba kopesa biso oyo tosengeli na yango mpo na kokokisa mokano na ye, ndenge asalaki mpo na Amose.​—2 Ko. 3:5.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto