Okosala nini na mikolo oyo bato bakendaka misala te mpe bana kelasi bakendaka kelasi te?
Lokola bato mingi bazalaka na ndako na mikolo ya bafɛti ya mangomba mpe ya bikólo, yango ezali ntango malamu mpo na biso kobima mosala ya kosakola. Masangá elendisamaki na kozwa bibongiseli ya sikisiki mpo na kopesa litatoli na mikolo ya ndenge wana. Soki bato mingi balalaka noki te na teritware na bino mikolo ya ndenge wana, ekozala malamu bóbongola mwa moke ngonga ya makita mpo na mosala ya kosakola. Liyebisi ekoki kopesama na Likita ya mosala mpo na koyebisa lisangá bibongiseli oyo ezwami mpo na kopesa litatoli na mokolo ya ndenge wana mpe kolendisa baoyo nyonso bakoki básala yango. Na ntembe te, mikolo oyo bato bakendeke mosala te mpe bana-kelasi bakendeke kelasi te epesaka biso ntango ya kosala makambo na biso moko. Kasi mpo na nini te kosakola ata ndambo ya mokolo? Soki osali bongo, okozwa kopema oyo eutaka na kosala mosala mosantu.—Mat. 11:29, 30.