Landá ndakisa ya basakoli—Mika
1. Ekoki kozala ete mosakoli Mika amitunaki motuna nini, kasi mpo na nini kosakola na ye ezalaki mpamba te?
1 ‘Ntango nini mpenza nsuka ya ebongiseli oyo mabe ekoya?’ Ekoki kozala ete mosakoli Mika amitunaki motuna wana ntango azalaki kosakola nsango ya lisambisi ya Yehova na bokonzi ya Yisraele mpe ya Yuda. Kasi, andimaki ete nsuka ekoya mpe makambo asakolaki ekokisamaki. Na mobu 740 L.T.B., wana Mika azalaki naino na bomoi, maloba ya Yehova mpo na Samaria ekokisamaki. (Mika 1:6, 7) Na nsima, Yerusaleme ebebisamaki na mobu 607 L.T.B. (Mika 3:12) Ndenge nini tokoki komekola Mika wana tozali kozela mokolo oyo Yehova akoboma bato mabe?
2. Ndenge nini tomonisaka motema molai wana tozali kozela mokolo ya Yehova, mpe mpo na nini?
2 Zalá motema molai: Mika akomaki boye: “Ngai, ezali Yehova nde nakotalela. Nakomonisa ete nazali kozela Nzambe ya lobiko na ngai.” (Mika 7:7) Na ntembe te, Mika akangaki mabɔkɔ te wana azalaki kozela nsuka eya. Azalaki kosala mosala na ye ya mosakoli ya Yehova. Wana tozali kozela mokolo ya Yehova, biso mpe tosengeli ‘kozala bato ya etamboli ya bosantu mpe kosala misala oyo ezali komonisa ete tokangami na Nzambe.’ (2 Pe. 3:11, 12) Motema molai ya Yehova ezali kopesa bato ntango ya kobongola motema. (2 Pe. 3:9) Na yango, tozwaka na motuya toli ya Nzambe ya kolanda ndakisa ya motema molai ya basakoli.—Yak. 5:10.
3. Mpo na nini tosengeli kosɛnga Yehova elimo santu na ye?
3 Tyá motema na nguya ya Yehova: Atako mosala ya mosakoli Mika ezalaki pɛtɛɛ te, atyelaki Yehova motema mpo na kozwa makasi ya kokokisa yango. (Mika 3:8) Lokola Yehova ayebi ete tozali na mposa ya nguya oyo eutaka epai na ye, Liloba na ye ezali kolendisa biso ete tótyaka motema na nguya ya Nzambe. Apesaka na motema mobimba nguya epai ya bato oyo balɛmbi mpo bákokisa mikumba na bango oyo etali losambo. (Nz. 84:5, 7; Yis. 40:28-31) Osilá komona nguya ya Yehova na mosala na yo mosantu? Obondelaka Yehova mbala na mbala mpo na kosɛnga ye elimo santu oyo eleki nguya mpo esalisa yo?—Luka 11:13.
4. Ndakisa nini ya malamu tokoki kozwa na bomoi ya mosakoli Mika lelo oyo?
4 Na bomoi ya Mika mobimba, kosala mokano ya Nzambe ezalaki na esika ya liboso. Azalaki na ekateli ya kotikala sembo atako bato mingi zingazinga na ye bazalaki na bizaleli mabe. Bosembo na biso mpe emekamaka mokolo na mokolo. Na yango, tiká tólendisa ekateli na biso ya ‘kotambola na nkombo ya Yehova Nzambe na biso seko na seko.’—Mika 4:5.