Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Zalá moninga malamu ya mosala
Mpo na nini ezali na ntina?: Yesu ayebaki ete kosakola mibalemibale ezali na ntina. Yango wana, ntango atindaki bayekoli na ye 70 mpo bákende kosakola liboso na ye, akabolaki bango mibalemibale. (Luka 10:1) Moninga ya mosala akoki kosalisa mosakoli oyo abimi elongo na ye ntango akutani na mokakatano to soki ayebi mpenza te eyano nini asengeli kopesa moto. (Mos. 4:9, 10) Ndakisa na ye ekoki koteya mosakoli oyo abimi elongo na ye mpe ntango mosusu akoki kopesa ye makanisi oyo ekosalisa ye akóma mosakoli oyo ayebi mpenza kopesa litatoli. (Mas. 27:17) Akoki mpe kolendisa ye na mwa lisolo ntango babimi na ndako moko mpo na kokɔta na ndako mosusu.—Flp. 4:8.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Nsima ya kosakola elongo na ndeko moko, yebisá ye likambo moko oyo alobaki to asalaki oyo emonisi ete azalaki moninga malamu ya mosala.