Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 5/14 lok. 2
  • Zalá na momeseno ya kotosa ngonga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zalá na momeseno ya kotosa ngonga
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2014
  • Masolo mosusu
  • Mpo na nini kotosa ngonga?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Kotosa ngonga
    Lamuká!—2016
  • Oyebi kotosa ngonga?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Tómonisa limemya mpo na ndako ya Nzambe
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2014
km 5/14 lok. 2

Zalá na momeseno ya kotosa ngonga

1. Yehova apesi ndakisa nini na oyo etali kotosa ngonga?

1 Yehova atosaka ngonga ntango nyonso. Na ndakisa, asalisaka basaleli na ye na ‘ntango bazali na mposa ya lisalisi.’ (Ebr. 4:16) Apesaka mpe ‘bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.’ (Mat. 24:45) Na yango, tokoki mpenza kondimisama ete mokolo ya nkanda na ye “ekokóma nsima ya ngonga te.” (Hab. 2:3) Tozwaka mpenza matomba na ndenge Yehova atosaka ngonga! (Nz. 70:5) Nzokande, lokola tozali bato ya kozanga kokoka mpe tozalaka na makambo mingi ya kosala, kotosa ngonga ezalaka mpenza mokakatano mpo na biso. Mpo na nini tosengeli kozala na momeseno ya kotosa ngonga?

2. Mpo na nini kotosa ngonga epesaka Yehova lokumu?

2 Na mikolo oyo ya nsuka bato mingi bazali bato oyo bamilingaka bango moko mpe bato bazangi komipekisa; yango wana ezali mpasi mpo na bato mingi kotosa ngonga. (2 Tim. 3:1-3) Na yango, ntango bakristo bazali kokóma na ngonga ezala na mosala, ntango bayokani na moto mpe na makita, yango ebendaka likebi ya bato mpe epesaka Yehova lokumu. (1 Pe. 2:12) Tomonaka ete mbala mingi tobandaka mosala na biso ya mosuni na ngonga, kasi tokómaka na retare na makambo ya elimo? Kokóma na ngonga na makita liboso báyemba loyembo mpe básala libondeli ya ebandeli, emonisaka ete tozali na mposa ya komekola Tata na biso ya likoló, oyo asalaka makambo na molɔngɔ.​—1 Ko. 14:33, 40.

3. Mpo na nini kotosa ngonga emonisaka ete totyelaka basusu likebi?

3 Kotosa ngonga emonisaka mpe ete totyelaka basusu likebi. (Flp. 2:3, 4) Na ndakisa, soki tokómi na ngonga na makita ya lisangá mpe makita mpo na mosala ya kosakola, tokolongola likebi ya bandeko mosusu te. Lisusu, soki tozali na momeseno ya kokóma na retare, tokomonisa lokola nde ngonga na biso ezali na motuya mingi koleka ya basusu. Kotosa ngonga emonisaka ete tozali na bokɛngi mpe bakoki kotyela biso motema; bato mingi basepelaka na bizaleli yango.

4. Soki mbala mingi tokómaka na retare, ndenge nini tokoki kobongisa likambo yango?

4 Soki mbala mingi okómaka na retare, luká koyeba nini esalaka bongo. Bongisá programɛ moko oyo ekosalisa yo osalaka likambo na likambo na ntango na yango. (Mos. 3:1; Flp. 1:10) Sɛngá Yehova asalisa yo. (1 Yoa. 5:14) Kotosa ngonga ezali lolenge moko ya komonisa botɔndi na biso mpo na mibeko mibale oyo eleki monene: kolinga Yehova mpe kolinga bazalani na biso.​—Mat. 22:37-39.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto