Biyano na mituna na bino
◼ Bana basengeli koyekola makambo nini mpo bákɔmela na elimo?
Baboti oyo bazali bakristo basalaka nyonso mpo bábɔkɔla bana na bango “na disiplini mpe na makebisi ya Yehova.” (Ef. 6:4) Na ndakisa, baboti bamonaka ete kotalela mokapo ya mokolo elongo na bana ntɔngɔ nyonso epesaka matomba. Na losambo na kati ya libota to na bantango mosusu, mabota ekoki kotala mpe kolobela moko ya bavideo, kolobela masolo Mituna oyo bilenge batunaka, kosala elakiseli oyo ekozongela makambo ndenge elekaki na lisolo moko ya Biblia, to komekameka ndenge ya kosala na likambo moko. Kasi, mpo bana bákóma “bato oyo bakɔmɛli,” esengeli mpe koteya bango mateya mozindo ya Biblia.—Ebr. 6:1.
Tótalela makambo oyo toteyaka bato oyo tokutanaka na bango na teritware na biso. Na bokutani ya liboso to ntango tozongeli moto, mbala mingi tosalaka makasi tóbanda koyekola na ye Biblia na buku Biblia eteyaka mpenza nini? Nsima ya kosilisa buku yango, tosalelaka buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe.” Mpo na nini? Buku Biblia eteyaka epesaka bayekoli boyebi ya ebandeli ya Makomami. Buku “Bolingo ya Nzambe” eteyaka bango ndenge ya kosalela mitinda ya Biblia na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Kotalela babuku yango esalisaka bato ya sika ‘bápika misisa’ na kati ya Kristo mpe ‘bátɛlɛma ngwi na kondima.’ (Kol. 2:6, 7) Babuku yango ekoki mpe kosalisa bana na biso! Bango mpe bazali na mposa ya koteyama na oyo etali lisiko, Bokonzi mpe ndenge bakufi bazalaka. Bazali mpe na mposa ya koyeba mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi mpe koyeba makambo oyo ezali komonisa mikolo ya nsuka ya ebongiseli ya ntango oyo. Basengeli kondimisama ete Batatoli ya Yehova bazali na lingomba ya solo. Bilenge basengeli mpe kokanga ntina ya mitinda ya Biblia mpe komesenisa “makoki na bango ya kososola.” (Ebr. 5:14) Ya solo, baboti basengeli kotalela mbula ya bana na bango mpe makoki na bango ya kokanga makambo. Nzokande, bana mingi bazalaka na makoki ya kobanda koyekola mateya mozindo ya Biblia ata ntango bakoli naino mpenza te.—Luka 2:42, 46, 47.
Mpo na kosalisa baboti, site jw.org ekobanda kobimisa makambo oyo euti na buku Biblia eteyaka, oyo tokoki kosalela na boyekoli. Mabota bakoki komona yango soki bakei na site na biso, na esika bakomi MATEYA YA BIBLIA > BILENGE. Na mikolo ezali koya, bakotya makambo mosusu ya kosala na boyekoli oyo ekouta na buku “Bolingo ya Nzambe.” Bokoki mpe kosalela babuku yango. Baboti bakotalela soki bakosalela babuku yango na losambo na bango na kati ya libota, ntango bazali koyekola Biblia na mwana mokomoko, to wana bazali kolakisa mwana ndenge ya kosala boyekoli na ye moko.