Ndenge ya kobanda lisolo
Mpo na kobanda koyekola na bato Biblia na mokolo ya pɔsɔ ya liboso na sanza ya zomi na moko
“Yoká motuna oyo ya ntina mingi. [Tángá motuna ya liboso oyo ezali na lokasa ya nsuka ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/11/2014.] Okanisi nini? [Tángá baparagrafe mibale oyo ezali na nse ya motuna yango mpe tángá ata vɛrsɛ moko oyo ezali wana.] Nakoki kozongela yo mpo tótalela mpo na nini Yesu asekwisaki bato mpe yango elimboli nini mpo na biso?”
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli 01/11/2014
“Osilá komituna mpo na nini makambo mingi ya mabe ezali kosalema na mokili? [Tiká ye apesa eyano.] Biblia elimboli yango na Emoniseli 12:9. [Tángá.] Nzokande, vɛrsɛ 12 epesi ntina ya kozala na elikya. [Tángá Emoniseli 12:12.] Mosika te mabe ya Satana ekolongwa. Lisolo oyo motó ya likambo elobi ‘Tosengeli nde kobanga Satana?’ emonisi ndenge oyo tokoki komibatela na mabe na ye sikoyo mpe likambo oyo ekokomela Satana na mikolo ezali koya. Ya yo yango oyo.”
Lamuká! 11/2014
“Moto nyonso alingaka ete azala na esengo, kasi lelo oyo bato mingi bazali na esengo te. Okanisi ete nini epesaka mpenza esengo ya solosolo? [Tiká ye apesa eyano.] Namonaka ete Biblia esalisaka mpenza mpo na kozala na bomoi ya esengo. Na ndakisa, talá etinda oyo ya Biblia. [Tángá Baebre 13:5.] Zulunalo oyo emonisi makambo minei oyo Biblia elobeli mpo na kozala na esengo ya solosolo.”