“Nakutaka ye lisusu te na ndako!”
Osilá koloba bongo mpo na moto moko oyo asepelaki? Atako omekaki kozongela ye mbala na mbala, kasi likoki ya kobwaka mai na mboto oyo olonaki ezali te. (1 Ko. 3:6) Ntango mosusu, basakoli oyo bamesani na mosala bakomelaka moto oyo bakutanaka na ye na ndako te mokanda, to mpe batikaka mokanda na porte ya ndako na ye. Basakoli mosusu balongaka mokakatano yango na ndenge basɛngaka nimero ya telefone, na ndakisa kotuna moto boye: “Ozali na nimero ya telefone?” Tokoki kotánga bozongeli soki tozongeli moto to topesi ye litatoli na nzela ya mokanda, ya mesaje na ordinatɛrɛ to na telefone, totikeli ye mokanda na porte ya ndako, to mpe tobengi ye na telefone. Ata soki mbala mingi tokutaka ye na ndako te, tokoki kokolisa mposa na ye.