Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kopesa litatoli na nzela ya interphone
Mpo na nini ezali na ntina? Kopesa litatoli na nzela ya interphone ekoki kobangisa. Ndenge nini tokoki kotika te ete kobanga elɛmbisa molende na biso mpo na misala ya malamu? Tóbosana te ete kopesa litatoli na nzela ya interphone ekoki kozala lolenge kaka moko ya koyebisa bato mosusu nsango malamu. (Rom. 10:14) Makambo oyo esalemá emonisi ete litatoli ya malamu ekoki kopesama na nzela ya interphone. (Talá Annuaire 2000, lok. 54, par. 3 mpe Annuaire 2011, nk. 65-66.) Tótalela makanisi oyo elandi.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Bómekameka yango na losambo na kati ya libota, mpe baoyo bazali kosala elakiseli bápesana mokɔngɔ.