Tólendisana mpenza mpo na kosala misala ya malamu
Baebre 10:24 elendisi biso “tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu.” Tokoki kolendisa bandeko na biso na ndakisa oyo tozali kopesa mpe na kolobela kondima na biso. Yebisaká bandeko ya lisangá makambo ya malamu oyo okutanaki na yango. Tiká bámona esengo oyo oyokaka na kosalela Yehova. Kasi, boyá mpe kokokanisa bango na yo moko to na bato mosusu. (Gal. 6:4) Luká kosalela makasi na yo mpo na kolendisa basusu na “bolingo mpe na misala ya malamu,” kasi te na ngambo mpe misala ya malamu. (Talá buku Eteyelo ya mosala, lok. 158, par. 4.) Soki tozali kolendisana na bolingo, misala ya malamu ekolanda, na ndakisa kosalisa bato na makambo ya mosuni to kosakola.—2 Ko. 1:24.