Bisaleli na biso mpo na koteya
1. Na ndenge nini bapalanganisi ya nsango malamu bazali lokola bato ya misala mabɔkɔ?
1 Bato ya misala ya mabɔkɔ basalelaka bisaleli ndenge na ndenge. Bisaleli mosusu basalelaka yango kaka na misala ya sikisiki, kasi bisaleli mosusu ya libosoliboso basalelaka yango mingi. Bato ya misala ya mabɔkɔ oyo bameseni mpenza na mosala bazalaka ntango nyonso na bisaleli ya libosoliboso na kɛsi na bango, mpe yango nde bayebi kosalela malamumalamu. Biblia elendisi mokristo nyonso amipesa na mosala ya kosakola mpe azala “mosali oyo azali koyoka nsɔni te mpo na mosala na ye.” (2 Tim. 2:15) Wapi esaleli ya ntina mingi na kati ya bisaleli na biso? Ezali Liloba ya Nzambe, esaleli ya libosoliboso oyo tosalelaka mpo na ‘kokómisa bato bayekoli.’ (Mat. 28:19, 20) Na yango, tosengeli kosala makasi tókóma na makoki ya “kosembola liloba ya solo malamumalamu.” Kasi, ezali mpe na bisaleli mosusu oyo tosalelaka mingi, oyo bakristo nyonso basengeli koyekola kosalela yango malamumalamu mpo na koteya bato solo.—Mas. 22:29.
2. Wapi bisaleli na biso ya libosoliboso mpo na koteya?
2 Bisaleli na biso ya libosoliboso mpo na koteya: Longola Biblia, bisaleli nini mosusu tosengeli kosalela? Esaleli ya libosoliboso oyo tozali na yango mpo na koteya mateya ya Biblia ezali buku Biblia eteyaka mpenza nini? Nsima ya kosilisa na moto buku yango, tosalelaka buku “Bótikala na kati ya bolingo ya Nzambe” mpo na koteya ye asalela mitinda ya Biblia na bomoi na ye ya mokolo na mokolo. Na yango, tosengeli koyeba mpenza kosalela babuku yango mibale. Tozali mpe na mwa babuku mosusu mpo na koteya. Nsango malamu oyo euti na Nzambe!, ezali moko ya bisaleli ya libosoliboso mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Soki na teritware na biso ezali na bato oyo bayebi mpenza kotánga te, to baoyo balobaka monɔkɔ oyo tozali na mikanda na yango mingi te to ezali te, tokosalela mwa buku Yoká Nzambe to Yoká Nzambe mpo ozala na bomoi ya seko. Esaleli ya libosoliboso mpo na kolakisa bayekoli báyeba ebongiseli na biso ezali mwa buku Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo? Bavideo oyo ekoki kosalisa mpo na kokómisa bato bayekoli, na ndakisa Mpo na nini koyekola Biblia?, Makambo esalemaka ndenge nini na Ndako ya Bokonzi? mpe Nzambe azali na nkombo?, ezali mpe bisaleli oyo tosengeli koyeba kosalela yango malamu.
3. Masolo oyo ekobima na Mosala na biso ya Bokonzi ekosalisa biso na nini?
3 Na mikolo ezali koya Mosala na biso ya Bokonzi ekobimisa masolo oyo ekosalisa biso tóyeba malamu kosalela mikanda na biso ya libosoliboso, oyo ezali na kati ya bisaleli na biso mpo na koteya. Wana tozali kosala makasi tósalela malamumalamu bisaleli yango, tokolanda toli oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ete: “Omibatela mpe okeba na mateya na yo ntango nyonso. Kangamá na makambo yango, mpo soki osali bongo okomibikisa mpe okobikisa bato oyo bazali koyoka yo.”—1 Tim. 4:16.