Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Tópesaka bato ya sika formasyo
Mpo na nini ezali na ntina: Bayekoli ya sika ya Yesu basengeli koyekola kotosa “makambo nyonso” oyo apesi mitindo. Na makambo yango, ezali mpe na etinda ya koteya basusu mateya ya solo. (Mat. 28:19, 20) Bato mingi ya sika basalaka masolo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpe mbala mosusu bapesaka litatoli ya libaku malamu na bato ya libota na bango to baninga na bango. Kasi, lokola basepelaka mingi na makambo oyo bazali koyekola mpe bayebi ete Yehova alingi ete bato nyonso báyoka nsango malamu, bakoki kosɛnga ete bábimaka na mosala ya kosakola. (Rom. 10:13, 14) Soki bandimami lokola basakoli oyo bazwi naino batisimo te, ekomonisa ete basali litambe ya ntina na bokoli na bango ya elimo. Na yango, ekosɛnga kopesa bango formasyo ya malamu mpo bábangaka te.—Luka 6:40.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Bimáká na mosala kosakola ndako na ndako elongo na moyekoli na yo, ezala mpe ntango okei kozongela moto to koyekola na moto Biblia. Soki ozali na moyekoli te, zwá mosakoli oyo amesani naino na mosala ya kosakola te bósakola elongo na ye.