Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Kokabola buku Biblia eteyaka
Mpo na nini ezali na ntina: Buku Biblia eteyaka ezali esaleli na biso ya libosoliboso mpo na koteya. Nzokande, liboso ya kobanda koyekola na moto, tosengeli kopesa ye yango. Yango wana, biso nyonso tosengeli kosala makasi ya koyeba malamumalamu kokabola buku yango na mosala ya kosakola. (Mas. 22:29) Ezali na ndenge mingi ya kosala mpe mosakoli akosalela oyo ebongi na ye.
Meká kosala boye na boumeli ya sanza:
Bómekameka ndenge ya kosala yango na losambo na bino na kati ya libota.
Ntango ozali na mosala ya kosakola, sololá na basakoli mosusu ndenge oyo okani koloba. (Mas. 27:17) Luká ndenge mosusu ya kobanda lisolo soki ya liboso esimbi te.