MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | NZEMBO 87-91
Tikalá na esika ya nkuku ya Oyo-Aleki-Likoló
“Esika ya nkuku” ya Yehova ebatelaka biso na elimo
Lelo oyo, mpo tófanda na esika ya nkuku ya Yehova, tosengeli komipesa na Nzambe mpe kozwa batisimo
Bato oyo batyelaka Nzambe motema te bayebi esika yango te
Eloko to moto moko te akoki kopekisa baoyo bafandi na esika ya nkuku ya Yehova bámonisa kondima na bango epai ya Nzambe mpe bálinga ye
“Mokangi ndɛkɛ” alukaka kokanga biso na motambo
Ndɛkɛ ezalaka ekɛngɛ, mpasi mpo na kokanga
Mokangi ndɛkɛ ayekolaka mimeseno ya bandɛkɛ mpe abongisaka mitambo ya kokanga yango
Satana, “mokangi ndɛkɛ,” ayekolaka mimeseno ya basaleli ya Yehova mpe atyaka mitambo oyo ebongi mpo na kobebisa elimo na bango
Mitambo minei ya Satana oyo ekoki koboma:
Kobanga bato
Mbongo mpe biloko
Kominanola ya mabe
Kozanga boyokani