Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb16 Août lok. 8
  • Teyá solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Teyá solo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Ndenge ya kokabola mikanda
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Lolenge ya kobongisa ndenge na yo moko ya kokabola bazulunalo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
  • Ndenge ya kokabola mikanda
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
mwb16 Août lok. 8

BOMOI YA BAKRISTO

Teyá solo

Kobanda na sanza ya libwa, lolenge moko ya sika ya kobanda lisolo ekobanda kobima na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo; ezali na motó ya likambo “Teyá solo.” Mokano na biso ekozala ya kolakisa moto liteya moko ya Biblia, na lisalisi ya motuna mpe vɛrsɛ moko.

Soki tomoni ete moto asepeli, tokoki koluka ndenge ya kozongela ye: tokoki kotikela ye mokanda to mpe kolakisa ye video moko ya jw.org. Tosengeli kosala makasi tózongela ye nsima ya mikolo moke mpo tóyebisa ye makambo mosusu. Makanisi mpo na ndenge ya sika ya kobanda lisolo mpe masolo ya bana-kelasi ekouta na bitanda oyo elobi “Na mokuse” na buku Makambo oyo Biblia eteyaka. Kuna, tokozwa mituna mpe bavɛrsɛ mosusu oyo ekoki kosalisa biso tózongela bato to tósalela kaka Biblia mpo na koyekola na bango.

Nzela oyo ezali komema na bomoi ezali kaka moko. (Mt 7:13, 14) Lokola tosololaka na bato ya mangomba mpe mimeseno ndenge na ndenge, tosengeli kolobela mateya ya Biblia na ndenge oyo ekosepelisa moto mokomoko. (1Ti 2:4) Soki tomeseni kolobela masolo ndenge na ndenge ya Biblia mpe tokolisi makoki na biso ya “kosembola liloba ya solo malamumalamu,” esengo na biso ekobakisama, mpe tokolonga koteya bato solo.​—2Ti 2:15.

Ndeko moko azali kotángela elenge moko vɛrsɛ

SALELÁ MAYELE YANGO YA SIKA . . .

  • na mosala ya kosakola ndako na ndako

  • na libaku malamu

  • mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na moto

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto