Ndeko moko azali kopesa moto trakte Bakufi bakozonga mpenza na bomoi? na monɔkɔ ya Tuvalu
Ndenge ya kokabola mikanda
LAMUKÁ!
Motuna: Mpo na nini ezali na ntina komibongisa mpo na makama?
Vɛrsɛ: Mas 27:12
Okoki koloba: Zulunalo oyo emonisi oyo tosengeli kosala liboso likama ebima, na ntango ya likama, mpe nsima na yango.
KOBANDA LISOLO: TEYÁ SOLO
Motuna: Ndenge nini tomonisaka ete tolingaka Nzambe?
Vɛrsɛ: 1Yn 5:3
Solo: Tomonisaka ete tolingaka Nzambe ntango totosaka mibeko na ye.
BAKUFI BAKOZONGA MPENZA NA BOMOI? (T-35)
Motuna: Na mokili mobimba, bato mingi basalaka bafɛti mbula na mbula mpo na komemya bakufi. Tokoki kozala na elikya ete tokomona lisusu bandeko to baninga na biso oyo bakufá?
Vɛrsɛ: Mis 24:15
Okoki koloba: Trakte oyo elobeli ndenge elikya ya lisekwa ekoki kokitisa yo motema. [Soki likoki ezali, lakisá ye video Elikya nini ezali mpo na bakufi?]
KOMÁ MALOBA NA YO MOKO
Landá makanisi oyo bapesi likoló mpo na kobongisa ndenge na yo moko ya kobanda lisolo na mosala ya kosakola.