Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb17 Décembre lok. 5
  • Likambo ya sika na programɛ ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Likambo ya sika na programɛ ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
  • Masolo mosusu
  • Okozimisa nsinga ya mwinda oyo ezali kopela mokemoke?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Yesu akoti na nkembo nyonso na Yelusaleme
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Akɔti na nkembo nyonso na Yelusaleme
    Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo
  • Mokonzi akɔti na Yerusaleme likoló ya mwana mpunda
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2017
mwb17 Décembre lok. 5
Evanzile ya Matai na Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika ya boyekoli

BOMOI YA BAKRISTO

Likambo ya sika na programɛ ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo

Kobanda sanza ya 01/2018, programɛ ya likita Bomoi mpe mosala ekozala mpe na banɔti mpo na koyekola mpe bililingi ná bavideo ya Biblia​—Libongoli ya Mokili ya Sika ya boyekoli (nwtsty) oyo ezali na Internet, ata soki ezali naino te na monɔkɔ na bino. Na ntembe te, makambo okokuta na Biblia yango ekosalisa yo obongisa makita malamu lisusu. Likambo eleki ntina, tiká ete yango esalisa yo okómisa lisusu makasi boyokani na yo na Yehova, Tata na biso ya bolingo!

BANƆTI MPO NA KOYEKOLA

Banɔti yango ezali kosalisa biso tóyeba mimeseno, bisika oyo makambo esalemaki, mpe ndimbola ya maloba ya bavɛrsɛ mingi ya Biblia.

Matai 12:20

Nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke: Mwinda oyo bato mingi bazalaki kosalela ezalaki mwa mbɛki moko ya mabele oyo bazalaki kotya yango mafuta ya olive. Nsinga ya lini oyo ezalaki na mwinda yango ezalaki komɛla mafuta mpo mwinda ekufa te. Maloba ya Grɛki “nsinga ya lini oyo ezali kopela mokemoke” ekoki komonisa nsinga oyo ezali kobimisa milinga mpo likala ezali naino kasi lolemo ya mɔtɔ ekómi kokita to elingi kokufa. Esakweli ya Yisaya 42:3 elobelaki motema mawa ya Yesu; emonisaki ete akoboma te mwa elikya oyo bato ya komikitisa mpe baoyo bazalaki konyokola bango batikalaki na yango.

Matai 26:13

Ya solo mpenza: Liloba ya Grɛki, a·menʹ, oyo euti na Ebre ʼa·menʹ, elimboli “ezala bongo,” to “Ɛɛ.” Yesu asalelaki liloba yango mbala mingi liboso ya kolobela likambo, elaka to esakweli moko mpo na komonisa ete makambo azalaki koloba ezalaki solo mpe ebongaki mpenza kotyelama motema. Balobaka ete na mikanda mosantu, kaka Yesu nde asalelá maloba “ya solo mpenza,” to amen, na ndenge wana. Soki bazongeli yango mbala mibale (a·menʹ a·menʹ), ndenge ezali na Evanzile ya Yoane, maloba wana ya Yesu ebongolamaka na “ya solosolo mpenza.”​—Yn 1:51.

BILILINGI NÁ BAVIDEO

Bafɔtɔ, bililingi, bavideo oyo maloba ezali koyokana te mpe mayemi ezali komonisa makambo ndenge na ndenge oyo ezali na Biblia.

Betefage, Ngomba ya Olive, mpe Yerusaleme

Video oyo ya mokuse ezali kolakisa nzela oyo ekei tii Yerusaleme kobanda na ngámbo ya ɛsti, na mboka oyo babengaka lelo et-Tur, oyo bakanisi ete ezali Betefage oyo Biblia elobeli, tii na esika oyo eleki molai ya Ngomba Olive. Betani ezali na ɛsti ya Betefage na lobwaku ya ɛsti ya Ngomba Olive. Na Yerusaleme, Yesu ná bayekoli na ye bamesanaki kolekisa butu na Betani, oyo ebengamaka lelo engumba el-ʽAzariyeh, nkombo moko ya Arabe oyo elimboli “Esika ya Lazare.” Na ntembe te, Yesu afandaki na ndako ya Marta, Maria, mpe Lazare. (Mt 21:17; Mr 11:11; Lk 21:37; Yn 11:1) Ekoki kozala ete Yesu azalaki koleka na nzela oyo ekokani na oyo balakisi na video oyo kolongwa na ndako yango tii Yerusaleme. Na mokolo ya 9 Nisana ya mobu 33 T.B., ntango Yesu amataki likoló ya mwana mpunda na Ngomba Olive tii Yerusaleme, ekoki kozala ete atambolaki na nzela yango kobanda Betefage tii na Yerusaleme.

Ekoki kozala ete Yesu alekaki na nzela oyo kolongwa Betani tii Yerusaleme
  1. Nzela kolongwa Betani tii Betefage

  2. Betefage

  3. Ngomba ya Olive

  4. Lobwaku ya Kidrone

  5. Ngomba ya Tempelo

Nsɛtɛ na mokuwa ya litindi

Mokuwa ya litindi oyo batɔbɔli yango na nsɛtɛ

Oyo ezali fɔtɔ ya mokuwa ya litindi ya moto, oyo batɔbɔli yango nsɛtɛ ya molai ya santimɛtrɛ 11.5 cm. Bamonaki mokuwa yango na 1968, ntango bazalaki kotimola mabele na nɔrdi ya Yerusaleme mpe ezali ya ntango ya Baroma. Emonisi makambo ya arkeoloji oyo endimisi ete bazalaki kosalela bansɛtɛ mpo na kokakisa moto na nzete mpo na koboma ye. Mbala mosusu nsɛtɛ yango ekokani na oyo basoda ya Roma basalelaki mpo na kokakisa Yesu Kristo na nzete. Bamonaki mokuwa yango na kati ya kɛsi moko ya libanga, oyo ebengami ossuaire, epai bazalaki kotya mikuwa ekauká ya moto oyo así apɔlá. Yango emonisi ete bakokaki kokunda moto oyo babomi likoló ya nzete.​—Mt 27:35.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto