MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | 2 BAKORINTI 11-13
“Nzubɛ moko na kati ya mosuni” ya Paulo
Mbala mingi Biblia esalelaka nzubɛ na ndenge ya elilingi. Ekoki komonisa bato oyo babulungani na makanisi mpe bato oyo basalelaka basusu mabe to makambo oyo ebimisaka mikakatano. (Mit 33:55; Mas 22:5; Ezk 28:24) Ntango Paulo akomaki mpo na “nzubɛ moko na kati ya mosuni” na ye, mbala mosusu azalaki kolobela bantoma ya lokuta mpe bato mosusu oyo bazalaki koloba ete azali ntoma te mpe kotyola mosala na ye. Ndenge nini bavɛrsɛ oyo ezali awa na nse emonisi ete “nzubɛ moko na kati ya mosuni” ya Paulo ekoki mpe kozala likambo mosusu?
Oyo ya yo ‘nzubɛ na kati na mosuni’ ezali nini?
Ndenge nini okoki kotyela Yehova motema mpo asalisa yo oyika mpiko?