MAKAMBO YA MOTUYA NA LILOBA YA NZAMBE | TITO 1–FILEMO
“Tyá bankulutu”
Paulo asɛngaki Tito ‘atya bankulutu na engumba mokomoko.’ Na kolanda likanisi wana ya Biblia, lelo oyo bakɛngɛli ya zongazonga nde batyaka bankulutu na masangá.
LISANGANI YA MIKÓLÓ-BAKAMBI
Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesi bakɛngɛli ya zongazonga mokumba monene ya kotya bankulutu mpe basaleli na misala na masangá, na kolanda ndenge ezalaki kosalema na siɛklɛ ya liboso.
BAKƐNGƐLI YA ZONGAZONGA
Mokɛngɛli mokomoko ya zongazonga asengeli kotalela malamumalamu mpe kobondela mpo na bandeko oyo bankulutu bapesi ye bankombo nde na nsima, akotya baoyo bakokisi masɛngami.
BAOYO BATYAMI BANKUTULU
Ata nsima ya kotyama nkulutu, bandeko yango basengeli kokoba kokokisa masɛngami ya Makomami.