BOMOI YA BAKRISTO
Yehova alingaka bato ya pɛto
“Sukoláká mabɔkɔ. Tyáká bopɛto na ndako. Kɔmbɔláká ndako. Bwakáká fulu.” Baboti mingi balakisaka bana ndenge ya kozala pɛto na nzoto. Kasi, mibeko etali bopɛto eutá nde epai ya Nzambe na biso oyo azali mosantu. (Kob 30:18-20; Mib 23:14; 2Ko 7:1) Soki nzoto mpe biloko na biso ezali pɛto, yango ekokumisa Yehova. (1Pe 1:14-16) Ndako mpe zingazinga na biso ezalaka ndenge nini? Na kokesana na bato oyo babwakaka bosɔtɔ na balabala to na baparkɛ, bakristo basalaka nyonso mpo mabele ezala kaka pɛto. (Nz 115:16; Em 11:18) Ata makambo mike, lokola kobwaka papye ya bombo, milangi ya plastiki, to bazoka, ekoki komonisa ndenge oyo totalelaka bopɛto. Na makambo nyonso ya bomoi na biso, tokolinga “kopesa ndakisa malamu ete tozali basaleli ya Nzambe.”—2Ko 6:3, 4.
TALÁ VIDEO NZAMBE ALINGI BATO YA PƐTO, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Bato mosusu bakoki koloba nini soki batyaka bopɛto te na biloko na bango?
Ndenge nini Mibeko ya Moize emonisaki ndenge oyo Yehova atalelaka bopɛto?
Ndenge nini tokoki kopesa litatoli mpo na Yehova kozanga ete tóloba?
Na bomoi na ngai, ndenge nini nakoki komonisa ete natalelaka bopɛto ndenge Yehova atalelaka yango?