BOMOI YA BAKRISTO
Mateya nini okoki kozwa na nzembo oyo ebimaka na TV JW?
Na nzembo oyo ebimaka na TV JW, oyo wapi olingaka mingi? Mpe mpo na nini? Omonaka ete bavideo ya nzembo yango eyokanaka na makambo ya mokolo na mokolo? Lokola elobelaka makambo ndenge na ndenge mpe ebɛtamaka na lolenge ekeseni, esepelisaka moto nyonso. Ata bongo, nzembo mpe bavideo yango ezalaka kaka te mpo na kominanola.
Loyembo mokomoko ezalaka na mateya oyo esalisaka mpenza, oyo tokoki kosalela na bomoi na biso ya bokristo mpe na mosala ya kosakola. Nzembo mosusu elobelaka mingi koyamba bapaya, bomoko, boninga, mpiko, bolingo to kondima. Mosusu elobelaka ndenge ya kozongela Yehova, kolimbisa, kobatela bosembo mokolo na mokolo mpe komityela mikano ya elimo. Ezali kutu na loyembo moko oyo elobeli kosalela telefone na bokatikati. Wapi mateya mosusu oyo ozwi na nzembo yango, oyo esalisi yo mpenza?
TALÁ VIDEO YA LOYEMBO YANGO OYO NA MISO, NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:
Mapamboli nini mwasi ná mobali oyo ya mibange bazali kokanisa mpo na mikolo ezali koya?—Eb 12:3
Tokoki kosala nini mpo tókómisa makasi kondima na biso na likoki oyo Yehova azali na yango ya kokokisa bilaka na ye?
Mosika te tokokutana na banani mpe yango ekopesa biso nini na motema?
Ndenge nini elikya ya Bokonzi esalisaka biso tóyika mpiko na mikakatano ya lelo?—Ro 8:25