Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb20 Juillet lok. 7
  • Yehova abatelaka basaleli na ye

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova abatelaka basaleli na ye
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Masolo mosusu
  • Ndenge nini mosala ezali kotambola na Warwick?
    Buku ya mobu 2016 ya Batatoli ya Yehova
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2016
  • Makambo ya esengo ya mbula eleki
    Buku ya mobu 2017 ya Batatoli ya Yehova
  • Mosala monene na Warwick
    Buku ya mobu 2015 ya Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
mwb20 Juillet lok. 7

BOMOI YA BAKRISTO

Yehova abatelaka basaleli na ye

Moboti moko ya Yisraele ná mwana na ye bazali kopakola makila na makonzí ya porte na bango.

Elekeli ya liboso ezalaki molulu moko ya ntina mingi. Na butu wana, ntango Farao ayaki koyeba ete mwana na ye ya liboso akufaki, ayebisaki Moize boye: “Bótɛlɛma, bólongwa na kati ya bato na ngai, bino ná bana mosusu ya Yisraele, mpe bókende, bósalela Yehova, kaka ndenge bolobi.” (Kob 12:31) Yehova amonisaki mpenza ete abatelaka bato na ye.

Soki totali istware ya basaleli ya Yehova ya mikolo oyo, tokomona mpenza ete Yehova azali kokoba kokamba mpe kobatela basaleli na ye. Yango emonisami na moko ya ba-musée oyo ezali na biro monene, oyo ezali na motó ya likambo: “Ekólo moko mpo na nkombo ya Yehova.”

TALÁ VIDEO VIZITE NA MUSÉE YA WARWICK: “EKÓLO MOKO MPO NA NKOMBO YA YEHOVA,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Bililingi ya ‘Fɔtɔ-drame ya bozalisi.’

    Esaleli nini eutaki kobima bayekoli ya Biblia basalelaki kobanda 1914 mpo na kosalisa bato bakómisa kondima na bango makasi na Biblia, mpe yango ebimisaki matomba nini?

  • Bafɔtɔ ya bandeko oyo bakangamaki mpe batyaki bango na bolɔkɔ na 1918.

    Komekama nini ebimaki na 1916 mpe 1918, mpe nini endimisi biso mpenza ete Yehova azalaki kotambwisa ebongiseli na ye?

  • Musée moko elakisi ndenge bandeko mingi batyamaki na bolɔkɔ mpo na kondima na bango. Baporte efungwami na salon moko oyo ezali kolakisa bililingi ya paradiso.

    Ndenge nini basaleli ya Yehova bakangamaki makasi na kondima na bango atako bazalaki kotɛmɛla bango?

  • Musée moko elakisi balolenge ya mosala ya kosakola oyo bandeko basalelaki na bambula 1930 mpe 1940.

    Engɛngiseli nini basaleli ya Yehova bazwaki na 1935, mpe ndenge nini elendisaki bango?

  • Soki ozwaki libaku ya kokende kotala musée yango, nini omonaki oyo endimisi yo mpenza ete Yehova azali kotambwisa mpe kobatela basaleli na ye?

Mpo na komona ndenge ya kosala vizite na musée yango, kende na jw.org® mpe finá esika bakomi “Olingi koyeba biso?”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto