Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Mai lok. 7
  • Disiplini emonisaka ete Yehova alingaka biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Disiplini emonisaka ete Yehova alingaka biso
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Tóyeba ntina mpenza ya disipilini
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Disiplini emonisaka bolingo ya Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Ndenge nini osengeli kopesa bana disiplini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Disipline ezali kobimisa mbuma na kimya
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1988
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Mai lok. 7
Baboti bazali kolela mpo mwana na bango oyo azali mokóló aboyi kobongola motema mpe atiki ndako.

BOMOI YA BAKRISTO

Disiplini emonisaka ete Yehova alingaka biso

Disiplini elimboli libosoliboso kolakisa to koteya, kasi ekoki mpe kolimbola kosembola mpe kopesa etumbu. Yehova apesaka biso disiplini mpo tósambela ye na ndenge oyo ye alingaka. (Ro 12:1; Ebr 12:10, 11) Na bantango mosusu, ekómaka mpasi kondima disiplini, kasi yango ekoki kokómisa moto moyengebene mpe komemela ye mapamboli soki asaleli yango. (Mas 10:7) Makambo nini moto oyo azali kopesa disiplini mpe moto oyo bapesi ye disiplini basengeli koyeba?

Moto oyo azali kopesa disiplini. Bankulutu, baboti, mpe bato mosusu basengeli kosala makasi mpo bápesaka disiplini na boboto mpe na bolingo ndenge Yehova asalaka yango. (Yir 46:28) Ata soki esɛngi kopesa disiplini ya makasi, yango esengeli koyokana na likambo oyo moto asali mpe esengeli kosala yango na bolingo mpenza.​—Tit 1:13.

Moto oyo bapesi ye disiplini. Ezala bapesi biso disiplini ya lolenge nini, tosengeli te koboya yango, tosengeli nde kosala milende mpo na kosalela yango mbala moko. (Mas 3:11, 12) Lokola tozali bato ya kozanga kokoka, biso nyonso tozalaka na mposa bápesa biso disiplini, ata soki disiplini yango ezali ya lolenge nini. Tokoki kozwa disiplini na nzela ya makambo oyo totángaka na Biblia to na nzela ya makambo oyo toyokaka na makita ya lisangá. To na bantango mosusu, tokoki kozwa disiplini na nzela ya komite ya kosambisa. Soki tondimi disiplini mpe tosaleli yango, tokozala na bomoi ya malamu mpe na mikolo ezali koya tokozwa bomoi ya seko.​—Mas 10:17.

TALÁ VIDEO “YEHOVA APESAKA DISIPLINI NA BATO OYO YE ALINGAKA,” MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi euti na video “Yehova apesaka disiplini na bato oyo ye alingaka.” Ntango azalaki mwana, Canon azali kosakola elongo na baboti na ye.

    Bomoi ya Canon ezalaki ndenge nini ntango azalaki naino mwana moke, mpe ndenge nini bomoi na ye ebongwanaki?

  • Elilingi euti na video “Yehova apesaka disiplini na bato oyo ye alingaka.” Ntango akómi mokóló, Canon azali kosolola na bankulutu.

    Disiplini nini ya bolingo Yehova apesaki Canon?

  • Elilingi euti na video “Yehova apesaka disiplini na bato oyo ye alingaka.” Na nsima, Canon azali kosolola na bilenge na makita.

    Yekolá kolinga disiplini ya Yehova

    Lisolo na ye eteyi biso nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto