Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Juillet lok. 3
  • Omityaka na esika ya basusu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Omityaka na esika ya basusu
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Koyeba komitya na esika ya basusu​—Ezali sɛkɛlɛ ya kozala na boboto mpe na motema mawa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Nzambe amityaka na esika na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2018
  • Mityá na esika ya basusu
    Lamuká!—2020
  • Tunáká mituna
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Juillet lok. 3

OMIPESA NA MOSALA YA KOSAKOLA | BAKISÁ ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA

Omityaka na esika ya basusu

Komitya na esika ya basusu ezali likoki ya koyeba makanisi, mayoki, bizaleli mpe bamposa na bango. Bato mosusu bayebaka ntango tomityaka na esika na bango. Soki tolingi mpenza kosalisa basusu, yango ekosalisa biso tómitya na esika na bango. Tomekolaka Yehova ntango tomityaka na esika ya bato na mosala ya kosakola, tolingaka bango mpe totyelaka bango likebi. Yango ebendaka bango epai ya Yehova.​—Flp 2:4.

Tomityaka na esika ya basusu kaka te ntango tozali koteya bango; kasi mpe ntango toyokaka bango mpe ndenge tolobaka na bango. Yango emonanaka na mayoki na biso, na bajɛstɛ tozali kosala mpe ndenge elongi na biso ezali komonana. Tokomitya na esika ya moto soki tozali mpenza kotyela ye likebi, kotalela mposa na ye, bindimeli na ye, mpe makambo ya bomoi na ye. Lisusu, tokomitya na esika na ye, soki tozali koyebisa ye makambo ya ntina oyo asengeli kosala mpe kosalisa ye; kasi te kotya ye mbamba ete abongwana. Ntango bato mosusu bandimaka lisalisi oyo topesaka bango, yango ebakisaka esengo na biso na mosala ya kosakola.

TALÁ VIDEO OKOKI KOYOKA ESENGO YA KOKÓMISA BATO BAYEKOLI​—KOLISÁ MAKOKI NA YO​—OMITYAKA NA ESIKA YA BASUSU, MPE NA NSIMA TUNÁ MITUNA OYO:

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli​—Kolisá makoki na yo​—Omityaka na esika ya basusu.’ Na restora, Rose azali koyebisa Neeta ntina oyo akoyekola Biblia te na mokolo wana.

    Ndenge nini Neeta amityaki na esika ya Rose ntango Rose akómaki na retare?

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli​—Kolisá makoki na yo​—Omityaka na esika ya basusu.’ Neeta azali koyoka mpe komitya na esika ya Rose.

    Ndenge nini Neeta amityaki na esika ya Rose ntango Rose ayebisaki ye ete azali na makambo mingi ya kosala mpe likoki ya koyekola ezali te?

  • Elilingi euti na video ‘Okoki koyoka esengo ya kokómisa bato bayekoli​—Kolisá makoki na yo​—Omityaka na esika ya basusu.’ Neeta azali kosalisa Rose mpo na kobongisa shambrɛ na oyo ezali na biloko beboo.

    Ntango tomityaka na esika ya basusu, yango ebendaka bango epai ya Yehova

    Ndenge nini Neeta amityaki na esika ya Rose ntango Rose ayebisaki ye ete ayebi kotya makambo na molɔngɔ te?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto