Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb21 Juillet lok. 11
  • Talelá basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Talelá basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
  • Masolo mosusu
  • Osalelaka basi makambo lokola Yehova?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Lendisáká bandeko basi bakristo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Mokumba oyo bankulutu bazali na yango na kati ya lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2021
  • Tosáká esika oyo moto na moto azali na yango na kati ya lisangá ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2021
mwb21 Juillet lok. 11
Ndeko mobali moko azali kosunga ndeko mwasi moko ya mobange wana elenge mwasi asimbi mobange yango na mabɔkɔ, mpo amata na motuka mpo na kozongisa ye na ndako nsima ya makita.

BOMOI YA BAKRISTO

Talelá basi oyo bazali mikóló lokola bamama, bilenge basi lokola bandeko basi

Makomami eyebisi biso tósalela bakristo oyo bazali mikóló makambo lokola batata mpe bamama na biso, mpe bakristo oyo bazali bilenge lokola bandeko na biso. (Tángá 1 Timote 5:1, 2.) Mingimingi bandeko mibali basengeli kopesa bandeko basi lokumu mpe kosalela bango makambo na limemya.

Ndeko mobali asengeli te kozala seresere ná ndeko mwasi to kosala likambo moko oyo ekosala ete ndeko mwasi amiyoka malamu te pene na ye. (Yb 31:1) Ndeko mobali oyo azali monzemba asengeli te kosalaka makambo oyo ekotinda ndeko mwasi oyo azali monzemba akanisa ete bakobalana wana ndeko mobali azali na makanisi yango te; kosala bongo ezali kosakana na mayoki ya ndeko mwasi.

Bankulutu basengeli kozala na boboto mpe kotyela bandeko basi likebi ntango batuni motuna moko to bazali na likambo moko oyo ezali kosɛnga kotyela yango likebi. Bankulutu basengeli mingimingi kotya likebi epai ya bandeko basi oyo bazali na mibali te mpo na kobatela bango.​—Rt 2:8, 9.

TALÁ VIDEO MONISÁ BOLINGO OYO ESILAKA SOKI MOKE TE NA LISANGÁ​—EPAI YA BASI OYO MIBALI BAKUFÁ MPE BANA OYO BATATA BAKUFÁ, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MITUNA OYO:

  • Elilingi euti na video ‘Monisá bolingo oyo esilaka soki moke te na lisangá​—Epai ya basi oyo mibali bakufá mpe bana oyo batata bakufá.’ Bandeko bazali kobɔndisa ndeko mwasi Myint mpe bana na ye na ndako na bango nsima ya aksida ya mobali.

    Ndenge nini bandeko ya lisangá bamoniselaki ndeko mwasi Myint bolingo ya solosolo?

  • Elilingi euti na video ‘Monisá bolingo oyo esilaka soki moke te na lisangá​—Epai ya basi oyo mibali bakufá mpe bana oyo batata bakufá.’ Moto moko ya kartye azali kotala mobali moko ná mwasi na ye oyo bazali Batatoli bayei kotala ndeko mwasi Myint mpe bana na ye ya basi.

    Ndenge nini bolingo oyo bandeko ya lisangá bamonisaki epesaki litatoli malamu na mboka yango?

  • Elilingi euti na video ‘Monisá bolingo oyo esilaka soki moke te na lisangá​—Epai ya basi oyo mibali bakufá mpe bana oyo batata bakufá.’ Ndeko mwasi Myint mpe mwana na ye ya mwasi bazali na makita.

    Ndenge nini bolingo oyo bandeko ya lisangá bamonisaki esalisaki bana basi ya ndeko mwasi Myint?

Makambo nini mosusu okoki kosala mpo na komonisa ete olingaka bandeko basi mpe otyelaka bango likebi?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto