Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb22 Juillet lok. 3
  • Kómá mobongisi-nzela

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kómá mobongisi-nzela
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Masolo mosusu
  • Mokano ya malamu mpo na mbula ya sika ya mosala
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
  • Tozali koluka babongisi-nzela basungi 100 000
    Mosala na biso ya Bokonzi—1997
  • Tokosala mosala yango lisusu?—Libyangi mosusu mpo na babongisi-nzela basungi​—Eteni 1
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Tósakola bizaleli malamu ya Yehova
    Mosala na biso ya Bokonzi—2007
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
mwb22 Juillet lok. 3
Elenge mwasi moko afandi elongo na baboti na ye mpe Nkɔkɔ na ye ya mwasi. Bazali kobongisa programɛ na bango.

BOMOI YA BAKRISTO | OMITYELA MIKANO MPO NA MOBU YA MOSALA YA SIKA

Kómá mobongisi-nzela

Tosalelaka malamu makasi na biso ntango tomityelaka mikano ya kosala mingi na mosala Yehova. (1Ko 9:26) Lokola nsuka ya mokili oyo ekómi pene, mikano ya malamu esalisaka biso tósalela malamu ntango moke oyo etikali. (Ef 5:15, 16) Na losambo na bino na kati ya libota, bokoki kolobela mikano oyo bokosepela kokokisa na mobu ya mosala ya sika. Mpo na kosalisa bino, mokanda ya likita oyo ezali na masolo mingi oyo emonisi lolenge ya mikano oyo bokoki kotalela mpe kobondela mpo na yango.​—Yak 1:5.

Na ndakisa, libota mobimba ekoki koyokana mpo ata moto moko akóma mobongisi-nzela. Soki bomoni ete bokokoka te kokokisa ngonga oyo esɛngamaka, bósolola na babongisi-nzela mosusu oyo mpe bazali kokutana na makambo ndenge moko na bino. (Mas 15:22) Bokoki mbala mosusu kobengisa mobongisi-nzela moko na losambo na bino na kati ya libota mpe kotuna ye mituna. Na nsima, bókoma mwa makanisi oyo bokoki kosalela mpo na kokokisa ngonga oyo esɛngamaka. Soki bosalaki mosala ya mobongisi-nzela na kala, bótalela soki bokoki kosala yango lisusu sikoyo.

Bato mosusu na kati ya libota bakoki kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpo na sanza moko to mibale. Soki ozali na makasi mingi te, okoki kolonga kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi soki ozali kosakola ata mwa moke mikolo nyonso. Soki ozalaka na ntango mingi te mpo na kobima mosala ya kosakola na kati ya pɔsɔ mpo okendaka mosala to kelasi, okoki kopona mbala mosusu sanza oyo ezalaka na mikolo ya bafɛti to oyo ezalaka na bapɔsɔ mitano. Bókoma ntango nini bokanisi kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi mpe bótya programɛ yango na kalandriye na bino.​—Mas 21:5.

TALÁ VIDEO ZALÁ NA MPIKO . . . MOBONGISI-NZELA, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO:

  • Ndenge nini Yehova asalisaki ndeko mwasi Aamand? Lisolo na ye eteyi biso nini?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto