Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb22 Juillet lok. 16
  • Ndenge ya kosalela eteni “Ndenge ya kobanda lisolo”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge ya kosalela eteni “Ndenge ya kobanda lisolo”
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
  • Masolo mosusu
  • Ndenge ya kosalela eteni “Ndenge ya kobanda lisolo”
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Ndenge ya kobanda lisolo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2018
  • Ndenge ya kobanda lisolo na batrakte
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2020
  • Tókolisa makoki na biso ya kosakola—Lolenge ya kobongisa ndenge na yo moko ya kokabola bazulunalo
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2016
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2022
mwb22 Juillet lok. 16
Bililingi: 1. Ndeko mwasi moko ná mobali na ye bazali kosalela mwa buku “Sepelá na bomoi libela na libela!” mpo na kosolola na mwasi moko liboso ya ndako na ye. 2. Kaka ndeko mwasi yango azali kosala lisolo ya mwana-kelasi na makita ya kati ya pɔsɔ, azali kolakisa mwa buku “Sepelá na bomoi libela na libela!”.

BOMOI YA BAKRISTO

Ndenge ya kosalela eteni “Ndenge ya kobanda lisolo”

Bandeko basalaka mosala makasi mpo na kobongisa eteni “Ndenge ya kobanda lisolo”, mpe basakoli mingi bamoni ete ezali kobimisa matomba mingi na teritware na bango. Nzokande, lokola makambo ezalaka ndenge moko te na bisika mingi na mokili, basakoli bakoki kosalela lolenge mosusu ya kobanda lisolo to kolobela lisolo mosusu oyo ekosepelisa bato ya teritware na bango na mosala ya kosakola. Kasi biso nyonso tosengeli kolanda malako nyonso oyo epesami na ntango ya kampanye moko ya sipesiale. Mokano na biso ezali ya kokokisa etinda ya Yesu, elingi koloba, kosakola nsango malamu ya Bokonzi.​—Mt 24:14.

Ntango basakoli bazali kosala badevuare na bango ya bana-kelasi, basengeli kolobela lisolo oyo ezali na eteni “Ndenge ya kobanda lisolo”, oyo ezali na Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala. Kasi, soki malako mosusu epesami te, bakoki kobongola motuna, vɛrsɛ, motuna ya kotika, to kadre ya lisolo mpo ebimisa matomba mingi na teritware na bango. Malako oyo ezwi esika ya malako oyo ezali na lokasa 8 ya mokanda ya likita ya sanza ya 06/2020.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto