Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • mwb23 Mars lok. 3
  • Makambo ya kosala mpo na kopesa mabɔkɔ nsima ya likama

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo ya kosala mpo na kopesa mabɔkɔ nsima ya likama
  • Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Masolo mosusu
  • Batatoli ya Yehova mpe basalisaka bato oyo bazwi likama?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Mosala ya kosunga bandeko
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Mosala ya kopesa lisungi na 2023​—“Tomoni mpenza bolingo ya Yehova”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Ndenge nini tokoki kosalisa?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2005
Makambo mosusu
Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
mwb23 Mars lok. 3

BOMOI YA BAKRISTO

Makambo ya kosala mpo na kopesa mabɔkɔ nsima ya likama

Makama oyo ebimaka yango moko ezali kosalema lisusu mingi lelo oyo. Ntango likama moko ebimi, esɛngaka makambo ebongisama mpe etambwisama malamu mpo na kopesa lisungi na ndenge oyo ebongi. Mpo na yango, Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaki bibongiseli mpo Departema mpo na kopesa lisungi etyama na babiro ya filiale nyonso.

Ntango bandeko ya Departema yango bayokaka nsango ya likama moko, na mbala moko babengaka bandeko ya esika oyo likama yango esalemi mpo na koyeba lisalisi nini basakoli bakozala na yango mposa. Soki likama yango ezali monene mpe basakoli bakoki te kobongisa makambo nyonso oyo yango ebimisi, filiale ekotya bandeko ya makoki mpo na kokamba mosala ya kopesa lisungi. Bandeko yango bakoki kosɛnga bavolontɛrɛ to makabo mpo na biloko ya sikisiki, to bakoki kosomba mpe kokabola biloko oyo bandeko bazali na yango mposa.

Soki makambo esalemi na ndenge wana ememaka matomba mingi. Esalisaka mpo na koboya kosala misala mosusu oyo ezangi ntina, kobulunganisa makambo, kobebisa mbongo mpe biloko, oyo ekoki kosalema soki bandeko basali makambo na ndenge na bango moko.

Bandeko oyo biro ya filiale eponi bakoki kokata mbongo boni mpe bavolontɛrɛ boni bakozala na mposa na bango mpo na kopesa lisungi. Bakoki mpe koluka koyeba epai ya bakonzi ya esika oyo likama esalemi, oyo bakoki mbala mingi kosalisa biso mpo mosala na biso ya kopesa lisungi esalema na lombangu. Na yango, moto ye moko asengeli te kozwa likanisi ya kokɔngɔla mbongo, kotinda biloko mpo na kosunga, to kokende esika likama esalemi kozanga ete básɛnga ye asala yango.

Kutu, ntango likama ebimaka, tolingaka kosunga bandeko na biso. (Ebr 13:16) Tosalaka bongo mpo tolingaka bango! Tokoki kosala nini? Likambo eleki ntina, tokoki kobondela mpo na bandeko oyo bakutani na likama mpe baoyo bakei kopesa bango lisungi. Tokoki mpe kopesa makabo mpo na kosunga mosala ya kosakola na mokili mobimba. Na nse ya litambwisi ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi, babiro ya filiale eyebi malamu koleka esika oyo makabo yango ekosalelama malamu mpenza. Longola yango, soki tolingi biso moko kopesa mabɔkɔ, tokoki komonisa ete tozali na mposa soki totondisi formilɛrɛ DC-50 (Demande d’admission comme volontaire local développement/construction).

TALÁ VIDEO MPELA EBEBISAKI BAMBOKA NA BRÉSIL, MPE NA NSIMA YANOLÁ NA MOTUNA OYO:

Elilingi euti na video “Mpela oyo ebebisi biloko na Brésil.” Bililingi ya bandako mpe banzete oyo ezindi ndambo na mpela.

Likambo nini ekamwisi yo mpo na lisungi oyo Batatoli ya Yehova bapesaki nsima ya mpela oyo esalemaki na Brésil na 2020?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto