LISOLO YA BOYEKOLI 16
LOYEMBO 64 Tósala na esengo mosala ya kobuka mbuma
Ndenge ya kozwa esengo mingi na mosala ya kosakola
“Bósalela Yehova na esengo.”—NZ. 100:2.
NA MOKUSE
Lisolo oyo elobeli makambo oyo tokoki kosala mpo na kobakisa esengo na biso na mosala ya kosakola.
1. Ndenge nini bandeko mosusu batalelaka likambo ya kosolola na bato na mosala ya kosakola? (Talá mpe elilingi.)
BISO basaleli ya Yehova tosakwelaka basusu mpo tolingaka Tata na biso ya likoló mpe tosepelaka kosalisa bato báyeba ye. Basakoli mingi basepelaka mpenza na mosala ya kosakola. Kasi mpo na basusu, ezalaka mpasi mpo básepela na mosala yango. Mpo na nini? Mbala mosusu bazalaka nsɔninsɔni to babangaka mingi. Basusu bakokaka te kokende na bandako ya bato kozanga bábengisa bango. Basusu babangaka ete básilikela bango. Basusu babɔkwamá na likanisi ete esengeli koboya mindɔndɔ na bato. Atako bandeko yango nyonso balingaka Yehova mingi mpenza, bamonaka ete ezali mpasi kosolola na bato oyo bayebi te mpe koyebisa bango nsango malamu. Kasi, bayebi ete mosala yango ezali na ntina mingi, mpe babimaka mbala na mbala. Na ntembe te yango esepelisaka mpenza Yehova!
Osepelaka na mosala ya kosakola? (Talá paragrafe 1)
2. Soki ezalaka mpasi osepela na mosala ya kosakola, mpo na nini osengeli kolɛmba nzoto te?
2 Na bantango mosusu ezalaka mpasi osepela na mosala ya kosakola mpo na bantina oyo touti kolobela? Soki bongo, kolɛmba nzoto te. Ndenge obangaka ekoki komonisa ete ozali na komikitisa, oboyaka kobenda likebi epai na yo moko, mpe ete olingaka te kobendana na bato. Lisusu, moto te alingaka básilikela ye, mingimingi ntango alingi nde kosalisa basusu. Tata na yo ya likoló ayebi malamu mikakatano oyo ozali kokutana na yango mpe alingi kosalisa yo mpenza. (Yis. 41:13) Na lisolo oyo, tokotalela makanisi mitano oyo ekosalisa biso tólongola mayoki ya ndenge wana mpe tókolisa esengo na mosala ya kosakola.
TIKÁ LILOBA YA NZAMBE EPESA YO MAKASI
3. Nini esalisaki mosakoli Yirimia asakwela basusu?
3 Banda kala, nsango ya Nzambe epesaka basaleli na ye makasi ntango basengeli kokokisa mokumba moko ya mpasi. Tózwa ndakisa ya mosakoli Yirimia. Azalaki kokakatana ntango Yehova apesaki ye mokumba ya kosakola. Yirimia alobaki: “Nayebi koloba te, mpo nazali kaka mwana.” (Yir. 1:6) Nini esalisaki ye atika kobanga? Azwaki makasi na liloba ya Nzambe. Alobaki boye: “Ekómaki lokola mɔtɔ oyo ezali kopela, oyo ekangami na kati ya mikuwa na ngai, mpe nakokaki lisusu te kobomba yango.” (Yir. 20:8, 9) Atako Yirimia azalaki na teritware moko ya mpasi, nsango oyo batindaki ye asakola epesaki ye makasi oyo asengelaki na yango mpo asala mosala yango.
4. Nini ekosalema ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango? (Bakolose 1:9, 10)
4 Bakristo bazwaka makasi na nsango oyo ezali na kati ya Liloba ya Nzambe. Ntango ntoma Paulo akomelaki lisangá ya Kolose, alobaki ete kozwa boyebi ya solosolo ekolendisa bandeko ‘bámitambwisa na ndenge oyo ebongi na Yehova,’ wana bazali kokoba “kobota mbuma na mosala nyonso ya malamu.” (Tángá Bakolose 1:9, 10.) Mosala malamu yango esangisi mpe kosakola nsango malamu. Na yango, ntango tozali kotánga Liloba ya Nzambe mpe komanyola yango, kondima na biso epai ya Yehova ekokóma makasi mpe tokomona polele ntina ya kosakola nsango ya Bokonzi.
5. Tokoki kosala nini mpo botángi mpe boyekoli ya Biblia esalisa biso mpenza?
5 Mpo Liloba ya Nzambe esalisa biso mpenza, tosengeli kolekaka mbangumbangu te ntango tozali kotánga, koyekola, mpe komanyola. Kende malɛmbɛmalɛmbɛ. Soki okutani na vɛrsɛ oyo okangi ntina na yango te, koleka yango te. Salelá Index des publications des Témoins de Jéhovah to Buku ya bolukiluki mpo na Batatoli ya Yehova mpo omona ndimbola ya vɛrsɛ yango. Soki ozali koyekola na likebi, okondima mpenza ete Liloba ya Nzambe ezali solo. (1 Tes. 5:21) Mpe soki kondima na yo ekómi makasi bongo, okozala mpenza na esengo mingi ya koyebisa basusu makambo oyo oyekoli.
OMIBONGISAKA MALAMU
6. Mpo na nini tosengeli komibongisa malamu mpo na mosala ya kosakola?
6 Soki omibongisi malamu mpo na mosala ya kosakola, okobanga mpenza te mpo na kosolola na bato. Yesu asalisaki bayekoli na ye bámibongisa liboso atinda bango na mosala ya kosakola. (Luka 10:1-11) Lokola basalelaki makambo oyo Yesu ateyaki bango, bayekoli basalaki makambo mingi ya malamu na mosala ya kosakola mpe yango epesaki bango esengo mingi.—Luka 10:17.
7. Ndenge nini tokoki komibongisa mpo na mosala ya kosakola? (Talá mpe elilingi.)
7 Ndenge nini tokoki komibongisa? Tosengeli kokanisa ndenge oyo tokoki koyebisa basusu mateya ya solo na maloba na biso moko. Ezali mpe malamu kokanisa makambo mibale to misato oyo bato ya teritware balobaka mingi mpe kobongisa eyano oyo tokopesa na mokomoko na yango. Bongo ntango tokosolola na bato, tósala makasi tózala motema ya kokita, tósɛka mwa moke, mpe tózala na boboto.
Omibongisaka malamu (Talá paragrafe 7)
8. Na ndenge nini bakristo bazali lokola bambɛki ya mabele oyo ntoma Paulo alobelaki?
8 Ntoma Paulo alobelaki mokumba na biso ya kosakola na maloba oyo: “Tozali na eloko oyo ya motuya na kati ya bambɛki ya mabele.” (2 Ko. 4:7) Eloko yango ya motuya ezali nini? Ezali mosala ya kosakola nsango ya Bokonzi oyo ebikisaka bomoi. (2 Ko. 4:1) Bambɛki ya mabele ezali nini? Ezali komonisa basaleli ya Nzambe, oyo bayebisaka basusu nsango malamu. Na ntango ya Paulo, bato ya mombongo bazalaki kosalela bambɛki ya mabele mpo na komema biloko ya motuya, lokola bilei, vinyo, mpe mbongo. Ndenge moko mpe, Yehova apesi biso nsango malamu, nsango ya motuya mpenza. Na lisalisi ya Yehova, tokoki kozwa makasi oyo esengeli mpo tókoba koyebisa nsango yango na bosembo.
BONDELÁ NZAMBE APESA YO MPIKO
9. Ndenge nini okoki kotika kobanga bato to kobanga ete básilikela yo? (Talá mpe elilingi.)
9 Na bantango mosusu, tokoki kobanga bato to kobanga ete básilikela biso. Tokoki kosala nini mpo na mokakatano yango? Tótalela libondeli oyo bantoma basalaki ntango bapekisaki bango kosakola. Na esika bátika ete kobanga elata bango, basɛngaki Yehova asalisa bango mpo ‘bákoba koloba liloba na ye na mpiko mpenza.’ Yehova ayanolaki mbala moko na libondeli na bango. (Mis. 4:18, 29, 31) Soki na bantango mosusu kobanga bato elataka biso, biso mpe tosengeli kobondela Yehova asalisa biso. Sɛngá Yehova asalisa yo okómisa makasi bolingo na yo mpo na bato mpo obanga te koyebisa bango nsango malamu.
Sɛngá Nzambe mpiko (Talá paragrafe 9)
10. Ndenge nini Yehova asalisaka biso tókokisa mokumba na biso lokola Batatoli na ye? (Yisaya 43:10-12)
10 Yehova atye biso tózala Batatoli na ye, mpe alaki ete akosalisa biso tózala na mpiko. (Tángá Yisaya 43:10-12.) Tótala kaka ndenge minei oyo asalaka yango. Ya liboso, Yesu azalaka elongo na biso ntango tozali kosakola nsango malamu. (Mat. 28:18-20) Ya mibale, Yehova atyá baanzelu mpo na kosalisa biso. (Em. 14:6) Ya misato, Yehova apesaka biso elimo santu na ye lokola mosungi mpo ezongisa na makanisi na biso makambo oyo toyekolaki. (Yoa. 14:25, 26) Ya minei, Yehova abongisá ete bandeko bábimaka na mosala ya kosakola elongo na biso. Na lisalisi ya Yehova mpe lisungi ya bandeko na biso ya bolingo, tozali na nyonso oyo esengeli mpo tókoba na mosala ya kosakola.
SALÁ BAMBONGWANA, MPE ZALÁ NA MAKANISI OYO EBONGI
11. Ntango tozali na mosala ya kosakola, tokoki kosala nini mpo tómona bato mingi? (Talá mpe elilingi.)
11 Olɛmbaka nzoto soki ozali kokuta kaka bato moke na bandako? Okoki komituna boye: ‘Bato ya teritware na ngai bazali wapi na ngonga oyo?’ (Mis. 16:13) ‘Bakei mosala to kosomba biloko?’ Soki ezali bongo, mbala mosusu okomona bato ebele soki okei kosakola na balabala. Ndeko mobali moko na nkombo Yoshua alobi boye: “Nazwaka mabaku ya kosakola ntango nazali kotambolatambola na bisika minene epai batɛkaka biloko to na bisika oyo bato ebele bayaka.” Ye ná mwasi na ye, Bridget, bakutaka mpe bato ebele na ndako ntango bakei kotala bango na bampokwa mpe mokolo ya lomingo nsima ya midi.—Ef. 5:15, 16.
Sakolá na ngonga mpe bisika okokuta bato (Talá paragrafe 11)
12. Ndenge nini tokoki koyeba makambo oyo bato bandimaka to oyo etungisaka bango?
12 Soki bato bazali kosepela mpenza te na nsango ya Biblia, luká koyeba makambo oyo bandimaka to makambo oyo etungisaka bango. Yoshua ná Bridget basalelaka motuna ya trakte moko na ebandeli ya lisolo na bango. Na ndakisa, soki basaleli trakte Otalelaka Biblia ndenge nini? balobaka boye: “Bato mosusu bamonaka ete Biblia ezali buku oyo eutá na Nzambe, bato mosusu bandimaka yango mpenza te. Bongo yo okanisaka nini?” Mbala mingi yango ememaka na lisolo.
13. Mpo na nini tokoki kozala na esengo na mosala ya kosakola ata ntango bato bayoki biso? (Masese 27:11)
13 Kolonga na mosala ya kosakola etaleli te ndenge oyo bato bazali koyoka biso. Mpo na nini? Mpo tosali oyo Yehova ná Mwana na ye balingi tósala: topesi litatoli. (Mis. 10:42) Ata soki tosololi na moto te, to ntango bato baboyi nsango na biso, tokoki kozala na esengo mpo toyebi ete tosepelisi Tata na biso ya likoló.—Tángá Masese 27:11.
14. Mpo na nini tokoki kosepela ntango mosakoli moko azwi moto oyo asepeli na kati ya teritware na biso?
14 Tokoki mpe kosepela ntango mosakoli moko azwi moto oyo asepeli na kati ya teritware na biso. Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ekokanisaki mosala ya kosakola na mosala ya koluka mwana oyo abungi. Bato ebele bamipesaka na koluka mwana yango na bisika ndenge na ndenge. Ntango mwana amonani moto nyonso azalaka na ntina ya kosepela, kaka te moto oyo amonaki ye. Ndenge moko mpe, lisangá mobimba esalisaka na mosala ya kokómisa bato bayekoli. Esɛngaka bandeko nyonso mpo na kosakola na teritware mobimba, mpe biso nyonso tosepelaka ntango moto ya sika abandi koyangana na makita.
TYÁ MAKANISI NA BOLINGO NA YO MPO NA YEHOVA MPE MPO NA BATO
15. Ndenge nini kosalela Matai 22:37-39 ekoki kosalisa biso tóbakisa esengo na biso na mosala ya kosakola? (Talá mpe ya ezipeli.)
15 Tokoki kobakisa esengo na biso na mosala ya kosakola soki tozali kotya makanisi na bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na bato. (Tángá Matai 22:37-39.) Meká kokanisa ndenge Yehova azalaka na esengo ntango amoni biso na mosala ya kosakola mpe esengo oyo bato bakozala na yango ntango babandi koyekola Biblia! Kanisá mpe lobiko oyo bato oyo bandimi nsango na biso bakozwa.—Yoa. 6:40; 1 Tim. 4:16.
Kotya makanisi na bolingo na biso mpo na Yehova mpe mpo na bato ekobakisa esengo na biso na mosala ya kosakola (Talá paragrafe 15)
16. Ndenge nini tokoki kozwa esengo na mosala ya kosakola ntango tokɔti ndako? Pesá ndakisa.
16 Okɔtá ndako mpo na ntina moko boye? Soki bongo, tyá makanisi na oyo okoki kosala mpo na komonisa ete olingaka Yehova mpe bato. Na ntango ya maladi mabe ya coronavirus, Samuel ná Dania bakangamaki na ndako na bango. Na ntango yango ya mpasi, bazalaki mbala na mbala koteya bato na nzela ya telefone, kokoma mikanda, mpe koyekola na bato na nzela ya Zoom. Samuel azalaki kopesa litatoli epai ya bato oyo azalaki kokutana na bango na lopitalo epai azalaki kozwa lisalisi ya monganga mpo na maladi ya karsɛr. Alobi boye: “Mikakatano elɛmbisaka biso na makanisi, na nzoto, mpe na elimo. Tosengeli kozwa esengo na mosala ya Yehova.” Na ntango yango, Dania akweaki mpe azalaki kaka na mbeto sanza misato mobimba. Na nsima, afandaki na kiti ya bibɔsɔnɔ sanza motoba. Alobi boye: “Namekaki kosala nyonso oyo nakoki. Nazalaki koteya monganga ya mwasi oyo azalaki koya kotala ngai, mpe nazalaki kosolola na baoyo bazalaki koya kotikela biso biloko na ndako. Nasololaki mpe malamu na telefone na mwasi oyo azalaki kosala na lopitalo.” Samuel ná Dania bakokaki kosala mingi te mpo na mikakatano oyo bazalaki na yango, kasi basalaki oyo bakokaki mpe bazwaki esengo.
17. Okoki kosala nini mpo makanisi oyo tolobeli na lisolo oyo esalisa yo mpenza?
17 Makanisi oyo totaleli na lisolo oyo esimbaka malamu soki osaleli yango nyonso. Likanisi mokomoko ezali lokola eloko mokomoko oyo ekokɔta na elubu. Soki otye biloko yango nyonso na elubu, bilei ekobima kitoko. Soki osaleli makanisi nyonso oyo tolobeli, okozala na nyonso oyo esengeli mpo olongola makanisi ya mabe mpe okozwa esengo na mosala ya kosakola.
NDENGE NINI MAKAMBO OYO ELANDI EKOKI KOBAKISA ESENGO NA YO NA MOSALA YA KOSAKOLA?
Kozwa ntango ya komibongisa malamu
Kobondela mpo na kosɛnga mpiko
Kotya makanisi na bolingo na yo mpo na Yehova mpe mpo na bato
LOYEMBO 80 ‘Bómeka mpe bómona malamu ya Yehova’