Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w24 Avril nk. 2-7
  • “Tókóma bato oyo bakɔmɛli”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Tókóma bato oyo bakɔmɛli”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KOKÓMA MOKRISTO OYO AKOMƐLI NA ELIMO ELIMBOLI NINI?
  • NDENGE NINI TOKOKI KOKÓMA BAKRISTO OYO BAKƆMƐLI NA ELIMO?
  • NTINA YA BILEI YA MAKASI YA ELIMO
  • BOYÁ KOMITYELA MOTEMA KOLEKA NDELO
  • Bikateli oyo emonisaka ete totyelaka Yehova motema
    Mokanda ya likita Bomoi mpe mosala ya bakristo—2023
  • Mokanda oyo ekoki kosalisa biso tóyika mpiko tii na nsuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Luká biyano na mituna oyo
    Programɛ ya Liyangani ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova 2025-2026—Elongo na mokɛngɛli ya zongazonga
  • Ozali koluka kokóma moto oyo akoli na bokoli ya Kristo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
w24 Avril nk. 2-7

LISOLO YA BOYEKOLI 14

LOYEMBO 56 Monisá solo

“Tókóma bato oyo bakɔmɛli”

“Tósala makasi tókóma bato oyo bakɔmɛli.”—EBR. 6:1.

NA MOKUSE

Tokoyekola ndenge mokristo oyo akɔmɛli akanisaka mpe asalaka makambo na boyokani na mokano ya Nzambe mpe ndenge azwaka bikateli ya bwanya.

1. Yehova asɛngi biso nini?

EZALI na makambo mingi te oyo epesaka mwasi ná mobali esengo koleka ntango baboti mwana oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ. Nzokande, ata soki baboti yango balingi mwana yango mingi ndenge nini, balingaka te atikala kaka moke libela. Kutu, bakomitungisa makasi soki azali kokola te. Ndenge moko mpe, Yehova azalaka na esengo ntango tokokisi masɛngami mpe tokómi bayekoli ya Yesu, kasi alingaka te tótikala bana mike na elimo. (1 Ko. 3:1) Asɛngi biso nde ‘tózala mikóló’ na elimo.—1 Ko. 14:20.

2. Tokotalela nini na lisolo oyo?

2 Kozala mokóló na elimo elimboli nini? Ndenge nini tokoki kokóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo? Ndenge nini bilei ya elimo ya makasi esalisaka moto akola na elimo? Mpe mpo na nini tosengeli koboya komityela motema koleka ndelo? Tokotalela mituna yango na lisolo oyo.

KOKÓMA MOKRISTO OYO AKOMƐLI NA ELIMO ELIMBOLI NINI?

3. Kokóma mokóló na elimo elimboli nini?

3 Na Biblia, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “mokóló” ekoki mpe kolimbola “akɔmɛli,” “ya kokoka,” mpe “ya mobimba.”a (1 Ko. 2:6) Tokómaka mikóló na elimo, to bakristo oyo bakɔmɛli, ntango tolongwe bana mike na elimo mpe tokolisi boyokani na biso na Yehova. Ya solo, ata ntango tokokisi mokano yango, tosengeli kotika te kokende liboso na elimo. (1 Tim. 4:15) Biso nyonso, ata mpe bilenge, tokoki kokóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo. Kasi, nini emonisaka ete moto akɔmɛli na elimo?

4. Mokristo oyo akɔmɛli na elimo azalaka ndenge nini?

4 Mokristo oyo akɔmɛli na elimo atosaka mibeko nyonso ya Nzambe, aponaka te kaka oyo esepelisi ye mpo atosa yango. Ya solo, lokola azali moto ya kozanga kokoka, akosala mabunga. Kasi, amonisaka na bomoi na ye ya mokolo na mokolo ete akanisaka mpe asalaka makambo na boyokani na mokano ya Nzambe. Alatá bomoto ya sika mpe asalaka ntango nyonso makasi ayokanisa makanisi na ye na makanisi ya Nzambe. (Ef. 4:​22-24) Ayekolá kozwa bikateli ya bwanya oyo eyokani na mibeko mpe mitinda ya Yehova; na yango azalaka na mposa te ya liste molai ya mibeko mpo elakisa ye nini asengeli kosala. Ntango azwi ekateli moko, amonisaka komipekisa mpo asala na boyokani na ekateli oyo azwi.—1 Ko. 9:​26, 27.

5. Nini ekoki kokómela mokristo oyo akɔmɛli na elimo te? (Baefese 4:​14, 15)

5 Nzokande, mokristo oyo akɔmɛli na elimo te akoki na pɛtɛɛ nyonso komemama na “bokosi” mpe na “mayele mabe,” mpe andimaka banungunungu ya lokuta mpe makanisi ya bapɛngwi.b (Tángá Baefese 4:​14, 15.) Akoki kozala na ezaleli ya koyokela bato zuwa, kobimisa kowelana, kosilika mpambampamba, to mpe kokwea na komekama.—1 Ko. 3:3.

6. Pesá ndakisa mpo na komonisa ndenge oyo kokɔmɛla na elimo ekokani na kokola mpe kokóma mokóló. (Talá mpe elilingi.)

6 Ndenge tomonaki yango liboso, Biblia ekokanisi kokɔmɛla na elimo na kokola mpe kokóma mokóló. Mwana moke azalaka na bososoli te; na yango esɛngaka ete mokóló moko abatela ye mpe apesa ye litambwisi. Na ndakisa, mama akoki kosɛnga mwana na ye ya mwasi ya moke asimba ye na lobɔkɔ ntango bazali kokatisa balabala. Wana mwana azali kokola, mama akoki kotika ye akatisa balabala ye moko, kasi akokundwela ye ete asengeli kotala ngámbo na ngámbo liboso ya kokatisa. Ntango mwana yango akómi mokóló, ye moko akobanda kokima makama ya ndenge wana. Kaka ndenge mwana moke azalaka na mposa mokóló asalisa ye mpo na kokima likama, mbala mingi, bakristo oyo bakɔmɛli na elimo te bazalaka na mposa bakristo oyo bakɔmɛli na elimo básalisa bango mpo na kokima makama ya elimo mpe kozwa bikateli ya bwanya. Nzokande, ntango mokristo oyo akɔmɛli na elimo alingi kozwa ekateli moko, atalelaka makambo oyo Biblia elobi mpo ayeba makanisi ya Yehova na likambo yango, mpe na nsima azwaka ekateli oyo eyokani na yango.

Bililingi: 1. Ndeko mwasi moko ya elenge azali koyoka baboti na ye. Na tablɛti na ye afungoli lisolo moko, mpe baboti na ye bafungoli Biblia na bango. 2. Kaka ndeko mwasi yango azali kosalela tablɛti, Biblia, mpe mwa karnɛ mpo na kosala boyekoli na ye moko. Bililingi ya mike: 1. Mama moko asimbi lobɔkɔ ya mwana na ye mpe azali kokundwela ye ete asengeli kotala ngámbo na ngámbo liboso ya kokatisa balabala. 2. Mwana yango oyo akoli azali kokatisa balabala ye moko.

Mokristo oyo akɔmɛli na elimo te asengeli koyekola kosalela mitinda ya Biblia mpo na kozwa bikateli ya bwanya (Talá paragrafe 6)


7. Bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bazalaka mpe na mposa ya lisalisi ya basusu?

7 Yango elingi nde koloba ete mokristo oyo akɔmɛli na elimo azalaka na mposa ya lisalisi ya moto te? Ezali bongo te. Bakristo oyo bakɔmɛli basɛngaka mpe toli na bantango mosusu. Kasi, moto oyo akɔmɛli te akoki kozela ete basusu báyebisa ye nini asala to bázwa ekateli na esika ye. Nzokande, ntango mokristo oyo akɔmɛli na elimo asɛngi toli epai ya baoyo bazali na bwanya mpe mayele koleka ye, abosanaka te ete Yehova alingi azwa ekateli ye moko, ‘amema mokumba na ye moko.’—Gal. 6:5.

8. Na makambo nini bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bakesanaka?

8 Ndenge kaka mikóló bakesanaka na nzoto, bakristo oyo bakɔmɛli na elimo bakesanaka na ndenge ya komonisa bizaleli ya elimo lokola bwanya, mpiko, bokabi, mpe komitya na esika ya basusu. Lisusu, ntango bakristo mibale oyo bakɔmɛli bakutani na likambo ya ndenge moko, bakoki kozwa bikateli oyo ekeseni kasi nyonso mibale eyokani na mitinda ya Biblia. Ezalaka mingimingi bongo na bikateli oyo etaleli lisosoli ya moto. Lokola bayebi likambo yango, balukaka te kosambisa basusu ntango bazwi ekateli oyo ekeseni na oyo ya bango. Kasi, basalaka makasi bábatela bomoko.—Rom. 14:10; 1 Ko. 1:10.

NDENGE NINI TOKOKI KOKÓMA BAKRISTO OYO BAKƆMƐLI NA ELIMO?

9. Moto akómaka mokóló na elimo kaka boye? Limbolá.

9 Mwana moke akómaka mokóló mpo bambula eleki, kasi moto akómaka mokóló na elimo kaka boye te. Na ndakisa, bandeko mibali mpe bandeko basi ya Korinti bandimaki nsango malamu, bazwaki batisimo, bazwaki elimo santu, mpe bayokaki mateya epai ya ntoma Paulo ye moko. (Mis. 18:​8-11) Atako bongo, mwa bambula nsima ya batisimo na bango, mingi bakɔmelaki kaka na elimo te. (1 Ko. 3:2) Tokoki kosala nini mpo tótikala bana mike te na elimo?

10. Tosengeli kosala nini mpo na kokɔmɛla na elimo? (Yuda 20)

10 Mpo na kokɔmɛla na elimo, tosengeli liboso kolona mposa yango. Baoyo ‘balingaka kaka kozanga mayele,’ mpe kotikala kaka bana mike na elimo, bakolonga te kokóma mikóló na elimo. (Mas. 1:22) Tolingaka te kozala lokola bana oyo bakoli kasi balingi kaka baboti na bango bázwaka bikateli na esika na bango. Kasi, tolingaka komema mokumba na biso ya elimo mpe kokolisa boyokani na biso na Yehova. (Tángá Yuda 20.) Soki ozali naino kosala makasi mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo, bondelá Yehova apesa yo “mposa mpe nguya ya kosala yango.”—Flp. 2:13.

11. Lisalisi nini Yehova apesi biso mpo tókóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo? (Baefese 4:​11-13)

11 Yehova alobi te ete tókóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo na ndenge na biso moko. Bandeko oyo bazali babateli ya mpate mpe bateyi na lisangá ya bokristo bazwaka formasyo mpo na kosalisa biso tókóma bato oyo ‘bakoli mpenza’ na elimo, ‘tii ntango tokokóma na bokoli mobimba ya Kristo.’ (Tángá Baefese 4:​11-13.) Yehova apesaka biso mpe elimo santu na ye mpo esalisa biso tókóma na “makanisi ya Kristo.” (1 Ko. 2:​14-16) Lisusu, Nzambe akomisaki masolo ya Baevanzile minei mpo na kolakisa biso ndenge Yesu azalaki kokanisa, koloba, mpe kosala makambo ntango azalaki awa na mabele. Soki omekoli ndenge Yesu azalaki kokanisa mpe kosala makambo, okoki kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo.

NTINA YA BILEI YA MAKASI YA ELIMO

12. “Mateya ya ebandeli oyo etali Kristo” ezali nini?

12 Mpo na kokɔmɛla na elimo, tosengeli mpe ‘kotika mateya ya ebandeli oyo etali Kristo,’ elingi koloba, mateya ya moboko ya bokristo. Na ndakisa mateya lokola kobongola motema, kondima, batisimo, mpe lisekwa. (Ebr. 6:​1, 2) Yango ezali na kati ya mateya oyo esimbi bokristo. Yango wana, ntoma Petro alobelaki yango ntango ateyaki ebele ya bato na mokolo ya Pantekote. (Mis. 2:​32-35, 38) Tosengeli kondima mateya yango ya ebandeli mpo na kokóma bayekoli ya Kristo. Na ndakisa, Paulo alobaki ete moto nyonso oyo alobi ete lisekwa ezali te, akoki kozala moyekoli ya Kristo te. (1 Ko. 15:​12-14) Kasi, mpo na kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo, tosengeli te kosuka kaka na boyebi wana ya ebandeli ya mateya solo.

13. Tosengeli kosala nini mpo na kolya bilei ya makasi ya elimo oyo Baebre 5:14 elobeli? (Talá mpe elilingi.)

13 Na bokeseni na mateya ya ebandeli, bilei ya makasi ya elimo ezali kaka te mibeko ya Yehova kasi mpe mitinda na ye, mpe yango esalisaka biso tóyeba makanisi na ye. Mpo na kolya bilei yango ya makasi, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe, komanyola yango, mpe kosalela malamu makambo oyo toyekoli. Ntango tozali kosala bongo, tozali koyekola ndenge ya kozwa bikateli oyo esepelisaka Yehova.c—Tángá Baebre 5:14.

Ndeko mobali moko azali kosala boyekoli na ye moko. Elilingi ya moke: Ndeko mobali yango aponi kotala filme oyo elobeli mbu.

Bilei ya makasi ya elimo esalisaka biso tóyeba kozwa bikateli oyo esepelisaka Yehova (Talá paragrafe 13)d


14. Ndenge nini Paulo asalisaki Bakorinti bákɔmɛla na elimo?

14 Mbala mingi, bakristo oyo bakɔmɛli te na elimo bayebaka te nini básala ntango bakutani na makambo oyo esɛngi kotalela mitinda ya Biblia mpe kosalela yango. Soki mobeko ya Biblia ezali te na likambo moko, basusu bamonaka ete bakoki kosala nyonso oyo balingi. Basusu bakoki kosɛnga bátyela bango mobeko na esika oyo mobeko esengeli kozala te. Na ndakisa, emonani ete bakristo ya Korinti basɛngaki Paulo atyela bango mobeko soki bakoki kolya to te bilei oyo epesamaki mbeka na bikeko. Na esika ayebisa bango oyo basengelaki kosala, Paulo amonisaki ntina ya lisosoli ya moto mpe ete moto na moto azali na ‘lotomo ya kopona.’ Abendaki likebi na mitinda oyo ekosalisa moto na moto azala na kimya na lisosoli na ye mpe abɛtisa basusu libaku te. (1 Ko. 8:​4, 7-9) Na ndenge yango, Paulo azalaki kosalisa Bakorinti bákola na elimo mpo báyeba kosalela makoki na bango ya kososola na esika básɛngaka moto mosusu azwela bango bikateli to mpe bálukaka kaka mibeko.

15. Ndenge nini Paulo asalisaki bakristo Baebre bákende liboso na elimo?

15 Tokoki kozwa liteya mosusu ya ntina na makambo oyo Paulo akomelaki bakristo Baebre. Basusu batikaki kokola na elimo; kutu ‘bazalaki lisusu na mposa ya mabɛlɛ, kasi ya bilei ya makasi te’ ya elimo. (Ebr. 5:12) Bazalaki kokoka te kokanga ntina ya mateya ya sika ya solo, oyo ezalaki komonisama mokemoke na nzela ya lisangá. (Mas. 4:18) Na ndakisa, Bayuda mingi oyo bakómaki bakristo bazalaki kaka kotingama na Mobeko ya Moize atako mbula soki 30 elekaki kobanda mbeka ya Kristo esukisaki Mibeko. (Rom. 10:4; Tito 1:10) Na ntembe te, kotikela Bayuda oyo bakómaki bakristo mbula 30 mobimba mpo básembola makanisi na bango ezalaki ntango moke te! Moto nyonso oyo atángi mokanda oyo Paulo akomelaki Baebre na litambwisi ya elimo ya Nzambe akoki kondima ete makambo oyo ezali na kati ezali bilei ya makasi ya elimo. Ezalaki bilei oyo bakristo wana basengelaki na yango mpo bákóma na kondima makasi ete ebongiseli ya losambo ya bakristo eleki malamu mpe bázala na mpiko ya kokoba kosakola atako Bayuda bazalaki kotɛmɛla bango.—Ebr. 10:​19-23.

BOYÁ KOMITYELA MOTEMA KOLEKA NDELO

16. Longola kokóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo, tosengeli kosala nini?

16 Tosengeli kosala makasi kaka te mpo na kokóma bakristo oyo bakɔmɛli na elimo, kasi mpe mpo na kotikala bongo. Mpo na yango, tosengeli koboya komityela motema koleka ndelo. (1 Ko. 10:12) Tosengeli ‘kokoba komimeka’ mpo tótala soki tozali kokoba kokende liboso na elimo.—2 Ko. 13:5.

17. Ndenge nini mokanda ya Paulo epai ya Bakolose emonisi ntina ya kotikala mokristo oyo akɔmɛli na elimo?

17 Na mokanda na ye epai ya Bakolose, Paulo amonisaki lisusu ntina ya kokoba kozala moto oyo akɔmɛli na elimo. Atako bakristo yango bakómaki mikóló na elimo, Paulo ayebisaki bango ete bákeba ete bákóma te baombo ya makanisi ya mokili. (Kol. 2:​6-10) Mpe Epafrasi, oyo emonani ete ayebaki bandeko ya lisangá yango malamu, abondelaki mingi mpo ‘nsukansuka bázala bato oyo bakoki na nyonso,’ elingi koloba bato oyo bakɔmɛli na elimo. (Kol. 4:12) Liteya ezali nini? Paulo ná Epafrasi bakangaki ntina ete kotikala moto oyo akɔmɛli na elimo esɛngi milende mingi mpe lisalisi ya Nzambe. Balingaki ete Bakolose bákoba kozala bakristo oyo bazali mikóló, to oyo bakɔmɛli na elimo atako mikakatano oyo bazalaki na yango.

18. Nini ekoki kokómela mokristo oyo akɔmɛli na elimo? (Talá mpe elilingi.)

18 Paulo akebisaki bakristo Baebre ete ekoki kokóma ete mokristo oyo akɔmɛli na elimo andimama lisusu na Nzambe te mpo na libela. Motema ya mokristo ekoki kokóma makasi mpenza tii azali kokoka lisusu te kobongola motema mpo Nzambe alimbisa ye. Likambo ya esengo, bakristo Baebre bazalaki ndenge wana te. (Ebr. 6:​4-9) Tokoloba nini lelo oyo mpo na baoyo batikaki kosakola to baoyo balongolamaki na lisangá kasi na nsima babongoli motema? Ndenge bamonisi komikitisa mpe balongoli motema emonisi ete bakeseni na bato oyo Paulo alobelaki. Kasi, ntango bazongeli Yehova, basengeli na lisalisi na ye. (Ezk. 34:​15, 16) Bankulutu bakoki kozwa bibongiseli mpo ndeko moko oyo ayebi makambo mingi asalisa bango bákóma lisusu na boninga makasi na Yehova.

Ndeko mobali moko ya mokóló ayei kotala ndeko mosusu na ndako mpo na kolendisa ye.

Yehova asalisaka baoyo balingi kokóma lisusu na boninga elongo na ye (Talá paragrafe 18)


19. Mokano nini tosengeli kozala na yango?

19 Soki ozali kosala makasi okóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo, okoki kokokisa mokano na yo! Kobá kolya bilei ya makasi ya elimo mpe salá makasi okanisaka lokola Yehova. Mpe soki ozali mokristo oyo akɔmɛli na elimo, kobá kosaka nyonso mpo otikala bongo.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Kozala mokristo oyo akɔmɛli na elimo elimboli nini?

  • Ndenge nini tokoki kokóma mokristo oyo akɔmɛli na elimo?

  • Mpo na nini tosengeli koboya komityela motema koleka ndelo?

LOYEMBO 65 Kende liboso!

a Makomami ya Ebre esaleli te maloba “kokɔmɛla” to “kokola te,” kasi epesi likanisi ya likambo yango. Na ndakisa, mokanda ya Masese elobeli moto oyo azali elenge mpe azangi mayele ná moto oyo azali na bwanya mpe na mayele.—Mas. 1:​4, 5.

b Talá “Nasala nini mpo namibatela na bansango ya lokuta?” na “Makambo mosusu” na eteni Makambo ndenge na ndenge na jw.org mpe na JW Library.®

c Talá lisolo “Makambo ya koyekola” na nimero oyo.

d NDIMOBLA YA ELILINGI: Ndeko moko azali kosalela mitinda oyo ayekolaki na Liloba ya Nzambe ntango azali kopona kominanola.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto