Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp25 No. 1 nk. 10-13
  • Ndenge bitumba mpe mobulu ekosila

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndenge bitumba mpe mobulu ekosila
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NZAMBE AKOLONGOLA BAGUVƐRNEMA YA BATO
  • NZAMBE AKOLONGOLA LISUMU
  • NZAMBE AKOBOMA SATANA NÁ BADEMO NA YE
  • Ndenge Nzambe atalelaka bitumba lelo oyo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Makambo oyo esalaka ete bitumba mpe mobulu ekoba kozala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2025
  • Biyano na mituna ya Biblia
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Biblia elobi nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2017
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2025
wp25 No. 1 nk. 10-13
Soda moko azali kokanisa mpe afandi likoló ya mabanga ya ndako oyo ebukani mpo na bitumba.

Bato bakokoka te kosilisa bitumba

Ndenge bitumba mpe mobulu ekosila

Biblia elobi ete Nzambe nde ‘akosilisa bitumba na mabele mobima’ kasi bato te.—Nzembo 46:9.

NZAMBE AKOLONGOLA BAGUVƐRNEMA YA BATO

Nzambe akosalela etumba oyo Biblia ebengi Armagedonea mpo na kolongola baguvɛrnema ya mokili. (Emoniseli 16:16) Na ntango yango, “bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi” bakosangana mpo na “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.” (Emoniseli 16:14) Soki Armagedone eleki, etumba mosusu te ekosalema na mokili.

Bokonzi ya Nzambe, to guvɛrnema ya Nzambe, ekozwa esika ya baguvɛrnema ya mokili. Yango ekozala na likoló kasi ekoyangela mabele mobimba, mpe ekobebisama te. (Danyele 2:44) Nzambe aponi Mwana na ye, Yesu Kristo, mpo azala Mokonzi. (Yisaya 9:​6, 7; Matai 28:18) Guvɛrnema yango ezali nde Bokonzib oyo Yesu ateyaki bayekoli na ye bábondelaka mpo na yango. (Matai 6:​9, 10) Bato nyonso na mokili bakozala na guvɛrnema kaka moko mpe Mokambi kaka moko, Yesu.

Yesu akosalela bokonzi na ye kaka mpo na bolamu na ye moko te, ndenge bakonzi ya mokili oyo bamesaná kosala. Lokola azali sembo mpe aponaka bilongi te, moto moko te akobanda kobanga mpo na mposo na ye, ekólo na ye, to mpo na esika autá. (Yisaya 11:​3, 4) Mpe makambo ya kobundela ntomo boye to boye ekozala lisusu te. Oyebi mpo na nini? Mpo Yesu ye moko akolandela malamu ete bamposa ya moto nyonso ekokisama. “Akobikisa mobola oyo azali kolela mpo na kosɛnga lisalisi, ná moto mpamba mpe moto nyonso oyo azali na moto ya kosalisa ye te. . . . Akobikisa bango na monyoko mpe na mobulu.”—Nzembo 72:​12-14.

Bokonzi ya Nzambe ekolongola na mabele mandoki nyonso oyo ezali koboma ebele ya bato. (Mika 4:3) Ekolongola mpe bato nyonso oyo balingi bitumba to baoyo bazali kobebisa kimya ya bato mosusu. (Nzembo 37:​9, 10) Esika nyonso moto alingi kokende na mabele, akozala na kimya.—Ezekiele 34:28.

Guvɛrnema yango ekolongola makambo oyo etindaka bato na kowelana, na ndakisa bobola, nzala, mpe kozanga bisika ya kofanda ya malonga. Na nse ya guvɛrnema ya Nzambe, moto nyonso akozala na bomoi ya malamu, elingi koloba, moto nyonso akozala na ebele ya bilei ya kitoko mpe esika malamu ya kofanda.—Nzembo 72:16; Yisaya 65:​21-23.

Bokonzi ya Nzambe ekolongola makambo nyonso ya mpasi oyo bitumba ebimisá. Na ndakisa mpasi na nzoto, bakisa mpe bampota ya motema to mpe mitungisi ya makanisi oyo nsɔmɔ ya bitumba etiká na mitó ya bato. Ezala bato oyo bakufá bakosekwa. (Yisaya 25:8; 26:19; 35:​5, 6) Bato ya mabota bakozonga kozala elongo mpe basuvenire mabe ya bitumba ekokóma “makambo ya kala” oyo ekoleka—Emoniseli 21:4.

NZAMBE AKOLONGOLA LISUMU

Bokonzi ya Nzambe ekosangisa bato nyonso mpo básambela Nzambe kaka moko ya solo, Yehovac, “Nzambe ya bolingo mpe ya kimya.” (2 Bakorinti 13:11) Bato bakoyekola ndenge ya kofanda na kimya na bato mosusu. (Yisaya 2:​3, 4; 11:9) Moto nyonso oyo akondima kotosa Nzambe akokóma moto ya kokoka, akolongwa na boombo ya lisumu.—Baroma 8:​20, 21.

NZAMBE AKOBOMA SATANA NÁ BADEMO NA YE

Bokonzi ya Nzambe ekolongola baoyo batindaka bato na bitumba, elingi koloba Satana ná bademo na ye. (Emoniseli 20:​1-3, 10) Soki Satana ná bademo na ye balongwe, “kimya ekokóma mingi” na mokili—Nzembo 72:7.

Zalá na kondima ete elikya oyo Nzambe apesi ya kosilisa bitumba mpe mobulu ekokokisama. Ezali te kaka mpo azali na makoki ya kosala yango, kasi mpo azali mpe na mposa ya kosala yango.

  • Nzambe azali na bwanya mpe nguya oyo esengeli mpo na kosilisa bitumba mpe mobulu. (Yobo 9:4) Ezali na eloko moko te oyo akokoka kosala te.—Yobo 42:2.

  • Nzambe alingaka ata moke te komona bato bazali konyokwama. (Yisaya 63:9) Yango wana, “ayinaka [mpe] moto oyo alingaka mobulu.”—Nzembo 11:5.

  • Nzambe akokisaka ntango nyonso maloba na ye; akosaka te.—Yisaya 55:​10, 11; Tito 1:2.

Nzambe akotya kimya ya solosolo mpe ya seko na mikolo ezali koya

Libota moko bazali kosɛka wana bafandi likoló ya ngomba moko na paradiso awa na mabele. Bampunda ezali kolya matiti na mopanzi ya ngomba.

Nzambe akosilisa bitumba

Bitumba: Mpo na nini Nzambe azali kosala eloko te?

Okoki komituna, “mpo na nini tii sikoyo Nzambe azali kotika nzela na bitumba?” Mpo na kozwa eyano, talá video Mpo na nini Nzambe atiki nzela na bampasi? na jw.org.

a Talá lisolo “Etumba ya Armagedone ezali nini?” na jw.org.

b Talá video Bokonzi ya Nzambe ezali nini? na jw.org.

c Yehova ezali nkombo ya Nzambe.—Nzembo 83:18.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto