LISOLO YA BOYEKOLI 13
LOYEMBO 4 “Yehova azali Mobateli na ngai”
Lobɔkɔ ya Yehova ezalaka mokuse te
“Lobɔkɔ ya Yehova ezali nde mokuse?”—MIT. 11:23.
NA MOKUSE
Lisolo oyo ekosalisa biso tótya motema lisusu mingi ete Yehova akozanga te kokokisa mposa na biso ya biloko ya kobikela.
1. Ndenge nini Moize amonisaki ete atyelaki Yehova motema ntango abimisaki Bayisraele na Ezipito?
MOIZE azali moko ya bato ya kondima makasi oyo mokanda ya Baebre elobeli. (Ebr. 3:2-5; 11:23-25) Amonisaki kondima ntango abimisaki Bayisraele na Ezipito. Abangaki Farao ná limpinga na ye te. Lokola atyelaki Yehova motema, Moize akambaki bato mpo na kokatisa Mbu Motane mpe na nsima na esobe. (Ebr. 11:27-29) Bayisraele mingi bazalaki lisusu kotya motema te na likoki ya Yehova ya kokokisa bamposa na bango, kasi Moize akobaki kotyela Nzambe na ye motema. Kondima ya Moize ezalaki bindimelá te, mpo Nzambe apesaki bato bilei mpe mai na ndenge ya likamwisi na esobe wana ekauká.a—Kob. 15:22-25; Nz. 78:23-25.
2. Mpo na nini Nzambe atunaki Moize: “Lobɔkɔ ya Yehova ezali nde mokuse”? (Mitángo 11:21-23)
2 Nzokande, atako Moize azalaki na kondima makasi, soki mbula moko nsima ya kosikola Yisraele na ndenge ya likamwisi, atyaki ntembe na likoki ya Yehova ya kopesa bato na Ye mosuni. Moize azalaki komona te ndenge oyo Yehova akokaki kopesa mosuni ebele mpo bamilio ya bato oyo bazalaki na esobe bálya mpe bátonda. Na yango, Yehova atunaki Moize ete: “Lobɔkɔ ya Yehova ezali nde mokuse?” (Tángá Mitángo 11:21-23.) Na vɛrsɛ yango, maloba “lobɔkɔ ya Yehova” emonisi elimo santu ya Nzambe, to nguya na ye oyo esalaka mosala. Na maloba mosusu, Yehova azalaki kotuna Moize: ‘Ozali mpenza kokanisa ete nakokoka kosala te oyo nalobi?’
3. Mpo na nini tosengeli kotalela likambo oyo ekómelaki Moize ná Bayisraele?
3 Esilá kokómela yo omituna soki Yehova akokokisa bamposa na yo ya biloko ya kobikela to ya bato ya libota na yo? Ezala omituná to te, tótalela ndakisa ya Moize mpe ya Bayisraele oyo batyaki motema te na likoki ya Yehova ya kokokisa bamposa na bango. Mitinda ya Biblia oyo tokotalela ekosalisa biso tótya motema lisusu mingi ete lobɔkɔ ya Yehova ezalaka mokuse te.
ZWÁ MATEYA NA NDAKISA YA MOIZE MPE YA BAYISRAELE
4. Mbala mosusu nini etindaki bato bámituna soki Yehova azali na likoki ya kopesa bango biloko ya kolya?
4 Tótalela makambo oyo elekaki. Mwa ntango elekaki kobanda ekólo Yisraele mpe “etuluku monene ya bato ndenge na ndenge” oyo bazalaki Bayisraele te balongwaki na Ezipito mpe bazalaki kosala mobembo elongo na esobe monene mpo na kokende na Mokili ya Ndaka. (Kob. 12:38; Mib. 8:15) Ebele ya bato oyo bazalaki Bayisraele te balɛmbaki kolya mana, Bayisraele mingi mpe balandaki lokolo na bango, mpe bango nyonso bakómaki kolelalela. (Mit. 11:4-6) Bato bakómaki kokanisa bilei oyo bazalaki kolya na Ezipito. Lokola bazalaki kotya ye mbamba mingi, emonani ete Moize amonaki ete ye moko asengeli kolukela bango mosuni.—Mit. 11:13, 14.
5-6. Liteya nini tokoki kozwa ndenge ebele ya bato ndenge na ndenge babebisaki makanisi ya Bayisraele mingi?
5 Emonani ete Bayisraele balandaki ezaleli ya kozanga botɔndi oyo ebele ya bato ndenge na ndenge bamonisaki. Yango ekoki mpe kokómela biso; tokoki kobanda kolanda ezaleli ya kozanga botɔndi oyo basusu bamonisi mpe kosepela lisusu te na oyo Yehova azali kopesa biso. Yango ekoki kosalema soki tozali kokanisakanisa biloko oyo tozalaki na yango kala to soki tokómi koyokela basusu zuwa mpo na biloko oyo bazali na yango. Kasi, tokozala na esengo mingi soki toyekoli kosepela na oyo tozali na yango, ezala ebele to moke.
6 Bayisraele basengelaki komikundwela ete Nzambe ayebisaki bango ete ntango bakokóma na Mokili ya Ndaka, bakozala na biloko ya kobikela ebele mpenza. Elaka yango esengelaki kokokisama na Mokili ya Ndaka, kasi te ntango bazalaki na esobe. Ndenge moko mpe, na esika tótya makanisi na biloko oyo tozali kozanga na mokili oyo, ekozala malamu tókanisaka biloko oyo Yehova alaki kopesa biso na mokili ya sika. Tokoki mpe komanyolaka na bavɛrsɛ oyo ekosalisa biso tótyelaka Yehova motema mingi.
7. Mpo na nini tokoki kotya motema ete lobɔkɔ ya Yehova ezalaka mokuse te?
7 Mbala mosusu ozali kaka komituna mpo na nini Nzambe atunaki Moize: “Lobɔkɔ ya Yehova ezali nde mokuse?” Ekoki kozala ete Yehova azalaki kosalisa Moize akanisa kaka te na makasi ya lobɔkɔ na Ye ya nguya, kasi akanisa mpe ndenge oyo ekoki kokóma esika nyonso. Nzambe akokaki kopesa Bayisraele mosuni ebele atako bazalaki mosika na esobe. Na “nguya ya lobɔkɔ na ye mpe lobɔkɔ oyo esembolami,” Nzambe amonisaki nguya na ye. (Nz. 136:11, 12) Na yango, ntango tozali na mikakatano, tosengeli kotya ntembe te ete lobɔkɔ ya Yehova ekokóma esika oyo tozali.—Nz. 138:6, 7.
8. Nini ekoki kosalisa biso tósala te libunga oyo bato mingi basalaki na esobe? (Talá mpe elilingi.)
8 Eumelaki te, Yehova apesaki bango mosuni; bato bazwaki ebele ya bandɛkɛ na nkombo kayɛ. Kasi, Bayisraele bapesaki Nzambe matɔndi te mpo na likamwisi yango. Kutu, mingi bamonisaki ezaleli ya lokoso. Balɔkɔtaki bandɛkɛ yango ebele mokolo mobimba ná ndambo. Yehova asilikelaki bato “oyo bamonisaki mposa na lokoso,” mpe abomaki bango. (Mit. 11:31-34) Tokoki kozwa liteya na lisolo yango. Tosengeli kokeba ete tókwea te na ezaleli ya lokoso. Tózala bazwi to babola, tosengeli koluka libosoliboso ‘komibombela biloko ya motuya na likoló,’ elingi koloba, kozala na boninga makasi ná Yehova mpe Yesu. (Mat. 6:19, 20; Luka 16:9) Soki tosali bongo, tóyeba ete Yehova akokokisa bamposa na biso.
Na esobe, ezaleli nini mingi bamonisaki, mpe lisolo yango ezali koteya biso nini? (Talá paragrafe 8)
9. Tosengeli koyeba ete Yehova akosala nini?
9 Yehova asembolaka lobɔkɔ na ye mpo na kosalisa basaleli na ye lelo oyo. Kasi, yango elingi koloba te ete tokobungisa ata mokolo moko te biloko na biso to ete tokozanga ata mbala moko te eloko ya kolya.b Kasi tóyeba ete Yehova akosundola biso te. Akosalisa biso na mikakatano na biso ya ndenge na ndenge. Mpo na komona bosolo ya likambo yango, tótalela makambo mibale oyo ekoki kosɛnga tótya motema ete Yehova akosembola lobɔkɔ na ye mpo na kokokisa mposa na biso ya biloko ya kobikela; (1) ntango tokutani na mikakatano ya mbongo mpe (2) ntango tozali kozwa bibongiseli mpo na kokokisa mposa na biso ya biloko ya kobikela na mikolo ekoya.
NTANGO TOKUTANI NA MIKAKATANO YA MBONGO
10. Mikakatano nini ya mbongo tokoki kokutana na yango?
10 Lokola nsuka ya mokili oyo ezali se kopusana, mikakatano ya mbongo ekoki kokóma lisusu makasi. Yikiyiki na makambo ya politiki, bitumba, makama oyo ebimaka yango moko, to maladi oyo epalanganaka ekoki kobimisa biso mbongo oyo tokanaki te to kosala ete tóbungisa mosala na biso, biloko na biso to ndako na biso. Ekoki kosɛnga tóluka mosala mosusu esika tofandi to tókende kofanda esika mosusu elongo na libota na biso mpo na kokokisa bamposa na bango. Nini ekoki kosalisa biso tózwa bikateli oyo ekomonisa ete totyeli lobɔkɔ ya Yehova motema?
11. Nini ekoki kosalisa yo olonga mikakatano ya mbongo? (Luka 12:29-31)
11 Likambo ya libosoliboso mpe ya malamu ya kosala ezali koyebisa Yehova mitungisi na yo. (Mas. 16:3) Sɛngá ye apesa yo bwanya oyo osengeli na yango mpo ozwa bikateli ya malamu mpe kimya ya motema mpo otika “kozala motema likolólikoló” mpo na likambo na yo. (Tángá Luka 12:29-31.) Bondelá ye mpenza asalisa yo oyekola kosepela na biloko ya kobikela oyo ozali na yango. (1 Tim. 6:7, 8) Salá bolukiluki na mikanda na biso mpo ozwa makanisi mpo na ndenge ya kolonga mikakatano ya mbongo. Masolo mpe bavideo ya jw.org oyo elobeli mikakatano ya mbongo esalisi bato mingi.
12. Mituna nini ekoki kosalisa mokristo azwa ekateli oyo eleki malamu mpo na libota na ye?
12 Bato mosusu bandimaki mosala oyo esɛngaki ete bákende mosika ya libota na bango, kasi na nsima mingi bamonaki ete ezalaki ekateli ya malamu te. Liboso ya kondima mosala moko, kotalela kaka te mbongo oyo okoki kozwa, talelá mpe oyo yango ekosala na boyokani na yo mpe ya libota na yo elongo na Nzambe. (Luka 14:28) Omituna boye: ‘Libala na biso ekokóma ndenge nini soki nakabwani na molongani na ngai? Nakokoka koyangana na makita nyonso, kolekisa ntango elongo na bandeko mpe kobima mosala ya kosakola?’ Soki ozali na bana, osengeli mpe komituna motuna oyo ya ntina: ‘Ndenge nini nakobɔkɔla bana na ngai “na disiplini mpe makebisi ya Yehova” soki nazali esika moko na bango te?’ (Ef. 6:4) Landá makanisi ya Nzambe, kasi te ya bato ya libota to ya baninga oyo bamemyaka mitinda ya Biblia te.c Tony, oyo afandaka na wɛsti ya Azia, azwaki mabaku mingi ya kokende kosala mosala ya mbongo mingi na mboka mopaya. Kasi, nsima ya kobondela mpo na likambo yango mpe kosolola yango na mwasi na ye, azwaki ekateli ya koboya misala yango, mpe bayokanaki ete básalelaka mbongo na ekɛngɛ. Mpo na likambo yango, Tony alobi boye: “Nazwi libaku ya kosalisa bato mingi báyeba Yehova, mpe bana na biso bazali kosepela mingi na solo. Libota na biso eyekoli ete ntango nyonso oyo tozali kolanda maloba ya Matai 6:33, Yehova akokokisa bamposa na biso.”
NTANGO TOZALI KOZWA BIBONGISELI MPO NA KOKOKISA MPOSA NA BISO NA MIKOLO EKOYA
13. Makambo nini ya malamu tokoki kosala sikoyo mpo esalisa biso tókokisa bamposa na biso ntango tokokóma mikóló?
13 Ekoki kosɛnga mpe tómonisa soki totyelaka lobɔkɔ ya Yehova motema ntango tozali kotalela ndenge tokokokisa bamposa na biso ntango tokokóma mikóló. Biblia elendisi biso tósalaka mosala makasi mpo tókoka kokokisa bamposa na biso na mikolo ekoya. (Mas. 6:6-11) Soki tozali na makoki, ezali malamu tóbombaka mwa eloko pembeni mpo na mikolo ekoya. Mbongo ebatelaka na makambo mosusu. (Mos. 7:12) Kasi, tosengeli koboya ete koluka biloko ya kobikela ekóma likambo oyo eleki ntina na bomoi na biso.
14. Mpo na nini tosengeli kobosana Baebre 13:5 te ntango tozali kozwa bibongiseli mpo na ndenge tokokokisa bamposa na biso na mikolo ekoya?
14 Yesu amonisaki bozoba ya komibombela mbongo soki ozali “mozwi te na miso ya Nzambe.” (Luka 12:16-21) Moto moko te ayebi ndenge lobi ekozala. (Mas. 23:4, 5; Yak. 4:13-15) Biso bayekoli ya Yesu tozali na mokakatano ya ndenge mosusu. Yesu alobaki ete tosengeli kondima “kotika” biloko na biso nyonso mpo na kozala bayekoli na ye. (Luka 14:33) Bakristo ya siɛklɛ ya liboso na Yudea bandimaki kosala yango na esengo. (Ebr. 10:34) Na mikolo na biso, bandeko mingi bandimaki kotika bomɛngo na bango mpo baboyaki kopesa mabɔkɔ na makambo ya politiki. (Em. 13:16, 17) Nini esalisi bango básala yango? Batyaka motema mobimba na elaka oyo ya Yehova ete: “Nakotika yo soki moke te mpe nakosundola yo ata moke te.” (Tángá Baebre 13:5.) Tosalaka nyonso mpo na kozwa bibongiseli mpo na kokokisa bamposa na biso na mikolo ekoya, kasi soki makambo oyo ekanami te ekómeli biso, totyaka motema na lisalisi ya Yehova.
15. Ndenge nini baboti bakristo basengeli kotalela bana na bango na bokatikati? (Talá mpe elilingi.)
15 Na mimeseno ya bamboka mosusu, mwasi ná mobali babotaka bana libosoliboso mpo bana yango bákoka kokokisa bamposa ya baboti ntango bakokóma mikóló. Na maloba mosusu, baboti yango bamonaka bana ebongiseli oyo ekosalisa bango ntango bazwi pansiɔ. Kasi Biblia elobi ete baboti nde basengeli kokokisa bamposa ya bana na bango. (2 Ko. 12:14) Ya solo, baboti bakoki kozala na mposa ya lisungi ya mbongo mpe ya biloko mosusu wana bazali kokóma mikóló, mpe bana mingi bazalaka na esengo ya kosalisa bango. (1 Tim. 5:4) Kasi baboti bakristo bayebaka ete esengo na bango monene eutaka te na kobɔkɔla bana na likanisi ete lobilobi básalisa bango na biloko ya mosuni, kasi nde na kosalisa bana bákóma basaleli ya Yehova.—3 Yoa. 4.
Babalani bakristo oyo bakangami na Yehova batalelaka mitinda ya Biblia ntango bazali kozwa bikateli mpo na mikolo ekoya (Talá paragrafe 15)d
16. Ndenge nini baboti bakoki kosalisa bana na bango báyeba ndenge ya kokokisa bamposa na bango moko? (Baefese 4:28)
16 Na nzela ya ndakisa na yo, teyá bana na yo bátyelaka Yehova motema mpe salisá bango báyekola ndenge ya kokokisa bamposa na bango. Kobanda ntango bazali naino mike, monisá bango ntina ya kosala mosala makasi. (Mas. 29:21; tángá Baefese 4:28.) Wana bazali kokola, salisá bango bázwaka kelasi na lisɛki te. Baboti bakristo bakoki koluka mitinda ya Biblia mpo na kosalisa bana báyeba ndenge ya kosalela malamu mayele oyo bazwi na kelasi. Yango ekosalisa bana na kokokisa bamposa na bango moko mpe komipesa mingi na mosala ya kosakola.
17. Tokoki kondima likambo nini?
17 Basaleli ya sembo ya Yehova bakoki kotya motema na likoki ya Yehova mpe na mposa na ye ya kokokisa bamposa na bango ya biloko ya kobikela. Wana tozali se kopusana na nsuka ya mokili oyo, tokoki komizela ete tókutana na makambo oyo ekosɛnga tótyela Yehova motema mingi. Kasi, ata soki nini ekómi, tókoba kotya motema ete Yehova akosalela nguya na ye mpo na kokokisa mposa na biso ya biloko ya kobikela. Tokoki kondima ete lobɔkɔ na ye ya nguya mpe lobɔkɔ na ye oyo esembolami ezalaka mokuse te mpe ekokóma esika nyonso oyo tozali.
LOYEMBO 150 Bóluka Nzambe mpo bóbika
a Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 10/2023.
b Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/09/2014.
c Talá lisolo “Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2014.
d NDIMBOLA YA ELILINGI: Ndeko moko ná mwasi na ye oyo batyelaka Yehova motema bazali kosolola na mwana na bango oyo azali kosala elongo na mobali na ye na mosala ya kotonga Ndako ya Bokonzi.