LISOLO YA BOYEKOLI 17
LOYEMBO 99 Tozali na bandeko ebele
Tozalaka ata moke te biso moko
“Nakosalisa yo.”—YIS. 41:10.
NA MOKUSE
Tokomona ndenge minei oyo Yehova akipaka biso.
1-2. (a) Mpo na nini tokoki koloba ete tobundanaka na mikakatano biso moko te? (b) Tokolobela nini na lisolo oyo?
NTANGO tozali na mikakatano ya makasi, tokoki komiyoka lokola tozali kaka biso moko na kati ya bwato moko ya moke na mbonge ya mbu. Kasi, tobundanaka na mikakatano biso moko te. Tata na biso ya likoló ya bolingo amonaka kaka te mikakatano oyo tozali na yango kasi alaki mpe ete akosalisa biso na yango. Yehova alaki basaleli na ye ya sembo ete: “Nakosalisa [bino].”—Yis. 41:10.
2 Lisolo oyo ekolobela ndenge oyo Yehova asalisaka biso na ndenge: (1) akambaka biso, (2) akokisaka bamposa na biso, (3) abatelaka biso, mpe (4) abɔndisaka biso. Yehova alaki ete ata soki tokutani na mokakatano ya ndenge nini na bomoi, akobosana likambo na biso te. Akosundola biso ata moke te. Na yango tozalaka ata moke te biso moko.
YEHOVA AKAMBAKA BISO
3-4. Ndenge nini Yehova akambaka biso? (Nzembo 48:14)
3 Tángá Nzembo 48:14. Yehova alingi te ete tómikamba to tómitambwisa biso moko. Ndenge nini atambwisaka basaleli na ye ya sembo lelo? Lolenge moko oyo asalaka yango ezali na nzela ya Biblia. (Nz. 119:105) Na nzela ya Liloba na ye oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu, Yehova asalisaka biso tózwa bikateli ya malamu mpe tókolisa bizaleli oyo epesaka esengo mingi sikoyo mpe bomoi ya seko na mikolo ekoya.a Na ndakisa, ateyaka biso tóbombaka nkanda na motema te, tózala sembo na makambo nyonso oyo tosalaka, mpe tólingaka basusu makasi, na motema moko. (Nz. 37:8; Ebr. 13:18; 1 Pe. 1:22) Soki tozali komonisa bizaleli ya ndenge wana, tokokóma baboti, balongani, mpe baninga ya malamu koleka.
4 Lisusu, Yehova atye na Liloba na ye bandakisa ya bato oyo bakutanaki na mikakatano mpe bazalaki na mayoki lokola oyo ya biso. (1 Ko. 10:13; Yak. 5:17) Ntango totángaka masolo ya bomoi na bango mpe tosalelaka mateya oyo tozwi, tozwaka matomba mingi, kasi tótánga kaka mibale. Ya liboso, tomonaka ete tozali biso moko te; basusu mpe bakutaná na makambo lokola oyo ya biso mpe bayikelá yango mpiko. (1 Pe. 5:9) Mpe ya mibale, toyebaka ndenge ya koyikela mikakatano na biso mpiko.—Rom. 15:4.
5. Yehova asalelaka banani mpo na kotambwisa biso na nzela ya bomoi?
5 Yehova asalelaka mpe bandeko na biso bakristo mpo na kotambwisa biso.b Na ndakisa, bakɛngɛli ya zongazonga batalaka masangá mpo na kolendisa biso. Badiskur na bango elendisaka kondima na biso mpe esalisaka biso tóbatela bomoko na biso oyo ezali na motuya. (Mis. 15:40–16:5) Bankulutu mpe basalisaka mpenza mosakoli mokomoko mpo azala makasi na elimo. (1 Pe. 5:2, 3) Baboti batambwisaka bana na bango na elimo; basalisaka bango bákolisa likoki ya kokanisa mpe bázala na mimeseno ya malamu. (Mas. 22:6) Mpe basi bakristo oyo bakɔmɛli basalisaka bilenge basi; bapesaka bango ndakisa malamu, batoli oyo ebongi, mpe balendisaka bango na maloba ya boboto.—Tito 2:3-5.
6. Tosengeli kosala nini mpo tózwa matomba na litambwisi ya Yehova?
6 Ya solo, Yehova abongisi nyonso mpo tózwa litambwisi oyo esengeli. Ndenge nini tokoki komonisa botɔndi mpo na nyonso oyo asali? Masese 3:5, 6 elobi: “Tyelá Yehova motema na yo mobimba, mpe kotya motema te na mayele na yo moko.” Soki tosali bongo, “akosembola banzela na [biso],” elingi koloba, akosalisa biso tókima makambo ebele mpe tósepela mingi na bomoi. Tozali mpenza na botɔndi ndenge, na bolingo nyonso, Yehova apesi biso batoli oyo esalisaka mokomoko na biso!—Nz. 32:8.
YEHOVA AKOKISAKA BAMPOSA NA BISO
7. Wapi mwa balolenge oyo Yehova akokisaka bamposa na biso? (Bafilipi 4:19)
7 Tángá Bafilipi 4:19. Yehova atambwisaka biso na elimo. Longola yango, apambolaka milende oyo tosalaka mpo na kozwa bilei, bilamba mpe esika ya kolala oyo tosengeli na yango. (Mat. 6:33; 2 Tes. 3:12) Ezali mabe te kokanisa bamposa yango ya mosuni, kasi Yehova alendisi biso tómitungisaka koleka ndelo te mpo na biloko yango. (Mat. 6:25) Mpo na nini? Mpo Tata na biso ya likoló akosundola ata moke te basaleli na ye ya sembo ntango bazali na bosɛnga. (Mat. 6:8; Ebr. 13:5) Tokoki kondimela ye ndenge alobi ete akokokisa bamposa na biso.
8. Yehova asalaki nini mpo na Davidi?
8 Tótalela ndenge oyo Yehova asalisaki Davidi. Na boumeli ya bambula ya mpasi oyo Davidi alekisaki ntango azalaki kokimakima Saulo, Yehova akokisaki bamposa na ye mpe ya mibali oyo bazalaki elongo na ye mpo bákoba kozala na bomoi. Ntango nsima ya bambula akanisaki ndenge oyo Yehova akokisaki bamposa na ye, Davidi alobaki boye: “Nazalaki elenge mpe sikoyo nakómi mobange, kasi namoná naino te moto ya sembo asundolami, to bana na ye bazali koluka limpa.” (Nz. 37:25) Na ntembe te na bomoi na yo, yo mpe osili komona ete Yehova akokisaka na bolingo nyonso bamposa ya basaleli na ye.
9. Ndenge nini Yehova akokisaka mposa ya basaleli na ye na ntango ya likama lelo oyo? (Talá mpe bililingi.)
9 Yehova akokisaka bamposa ya basaleli na ye ntango makama esalemi. Na ndakisa, ntango nzala moko makasi ebimaki na siɛklɛ ya liboso, bakristo ya bamboka ndenge na ndenge batindaki biloko ya lisungi epai ya bandeko na bango oyo bazalaki na bosɛnga. (Mis. 11:27-30; Rom. 15:25, 26) Lelo oyo mpe, basaleli ya Nzambe bamonisaka ezaleli yango ya kokaba. Ntango likama esalemi, na bolingo nyonso Yehova asalaka ete basaleli na ye bápesa bandeko na bango oyo bafandi na esika ya likama biloko lokola bilei, mai, bilamba, mpe bankisi. Baekipi ya botongi ebongisaka bandako ya bandeko mpe Bandako ya Bokonzi oyo ebebi. Mpe basaleli ya Yehova basalaka noki mpo na kobɔndisa mpe kolendisa na nzela ya Biblia baoyo babungisi biloko to bato oyo balingaka.c
Ndenge nini Yehova akokisaka bamposa na biso na ntango ya likama? (Talá paragrafe 9)e
10-11. Liteya nini tozwi na lisolo ya Borys?
10 Yehova akokisaka mpe mposa ya baoyo bazali naino kosalela ye te. Ndenge moko mpe, tolukaka mabaku ya komonisa boboto epai ya baoyo bindimeli na bango ekeseni na oyo ya biso. (Gal. 6:10) Mbala mingi yango epesaka biso libaku ya kopesa litatoli. Tótalela ndakisa ya Borys, mokambi ya eteyelo moko oyo afandaka na Ukraine. Atako Borys azali Motatoli ya Yehova te, azalaki ntango nyonso kosalela bana-kelasi oyo bazali Batatoli makambo na boboto mpe azalaki komemya bindimeli na bango. Ntango Borys azwaki ekateli ya kokima bitumba mpe kokende na esika oyo ezalaki na kimya na ekólo, bandeko na biso basalisaki ye. Na nsima, Borys ayanganaki na Ekaniseli ya liwa ya Kristo. Ntango akanisaki likambo yango, Borys alobaki: “Batatoli batyelaki ngai likebi mpe bakokisaki bamposa na ngai. Nazali na botɔndi epai ya Batatoli ya Yehova.”
11 Biso mpe tokomekola Tata na biso ya likoló ya motema mawa soki tozali komonisa bolingo epai ya baoyo bazali na bosɛnga, bázala Batatoli ya Yehova to te. (Luka 6:31, 36) Tozali na elikya ete bolingo oyo tomoniselaka bato ekotinda bango bákóma bayekoli ya Kristo. (1 Pe. 2:12) Kasi ata soki esalemi bongo te, tokoyoka esengo mingi oyo eutaka na kopesa.—Mis. 20:35.
YEHOVA ABATELAKA BISO
12. Libateli nini Yehova alaki basaleli na ye lelo oyo? (Nzembo 91:1, 2, 14)
12 Tángá Nzembo 91:1, 2, 14. Lelo oyo, Yehova alaki kobatela basaleli na ye na elimo. Akotika ata moke te ete Satana abebisa losambo ya pɛto. (Yoa. 17:15) Mpe na ntango ya ‘bolɔzi monene,’ tokoki kotya motema mobimba ete Yehova akokokisa elaka na ye ya kobatela basaleli na ye kaka na elimo te kasi mpe na mosuni.—Em. 7:9, 14.
13. Na ndenge nini Yehova abatelaka mokomoko na biso?
13 Ndenge nini Yehova abatelaka mokomoko na biso? Na nzela ya Liloba na ye, Yehova asalisaka biso tóyeba kokesenisa mabe ná malamu. (Ebr. 5:14) Ntango totosaka mitinda ya Biblia, tobatelamaka na makama ya mosuni mpe ya elimo. (Nz. 91:4) Lisusu, Yehova abatelaka biso na nzela ya lisangá. (Yis. 32:1, 2) Soki tozali na baninga oyo balingaka Yehova mpe oyo batosaka mitinda na ye ekolendisa biso mpe ekopesa biso makasi ya koboya kosala makambo ya mabe.—Mas. 13:20.
14. (a) Mpo na nini Yehova abatelaka biso na mikakatano nyonso te? (b) Nzembo 9:10 endimisi biso nini? (Talá mpe maloba na nse ya lokasa.)
14 Na bantango mosusu, Yehova abatelaki basaleli na ye ya kala na makama ya nzoto mpe na liwa. Kasi, asalaki bongo na mabaku nyonso te. “Makambo oyo ekanami te” ekoki kokómela moto nyonso. (Mos. 9:11) Longola yango, Yehova atikaki ete basaleli na ye mosusu bákutana na minyoko mpe ata liwa mpo na komonisa ete Satana azali moto ya lokuta. (Yobo 2:4-6; Mat. 23:34) Ezali mpe bongo lelo oyo. Ata soki Yehova alongoli mikakatano na biso te, tótya motema ete akosundola soki moke te baoyo balingaka ye.d—Nz. 9:10.
YEHOVA ABƆNDISAKA BISO
15. Ndenge nini tozwaka libɔndisi na nzela ya libondeli, Liloba ya Nzambe, mpe bandeko na biso bakristo? (2 Bakorinti 1:3, 4)
15 Tángá 2 Bakorinti 1:3, 4. Na bantango mosusu, toyokaka mawa, tomitungisaka, to toyokaka mpasi. Mbala mosusu ozali na likambo moko ya mpasi sikoyo, mpe ezali kosala ete omiyoka ete ozali yo moko. Ezali na moto moko oyo ayebi mpenza ndenge ozali komiyoka? Ɛɛ, Yehova. Ayebaka mpasi na biso mpe “abɔndisaka biso na komekama na biso nyonso.” Na ndenge nini? Ntango tosopeli Yehova motema na biso na libondeli, apesaka biso “kimya ya Nzambe oyo eleki makanisi na biso.” (Flp. 4:6, 7) Tozwaka mpe libɔndisi ntango totángaka maloba oyo Yehova alobi na biso na Biblia. Maloba yango oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo santu emonisaka bolingo ya Yehova mpe epesaka biso bwanya ná elikya oyo ekoki kokitisa biso motema. Makita mpe ebɔndisaka biso mpo kuna, tozalaka elongo na bandeko oyo balingaka biso mpe toyokaka mateya ya Biblia oyo elendisaka biso.
16. Liteya nini ozwi na lisolo ya Nathan ná Priscilla?
16 Mpo na komonisa ndenge oyo Yehova abɔndisaka mpe alendisaka biso na nzela ya Liloba na ye, tótalela ndakisa ya Nathan ná Priscilla, oyo bafandaka na États-Unis. Eleki mwa bambula, bazwaki ekateli ya kokende esika oyo mposa ya basakoli ya Bokonzi ezalaki mingi. Nathan alobi boye: “Totyaki motema ete Yehova akopambola milende na biso.” Kasi, ntango bakómaki na teritware yango, babɛlaki mpe bakutanaki na mikakatano ya mbongo. Nsukansuka, esɛngaki bázonga na mboka na bango, mpe kuna bazalaki kaka na mikakatano ya mbongo. Nathan alobi boye: “Namitunaki ntina oyo Nzambe asalisaki biso te na ndenge oyo tokanisaki. Nakómaki kutu komituna soki nasalaki likambo ya mabe.” Kasi, na nsima Nathan ná Priscilla bayaki komona ete Nzambe asundolaki bango te ntango bazalaki na bosɛnga. Nathan alobi boye: “Na bantango wana ya mpasi, Biblia ekómaki lokola moninga moko ya bwanya oyo azalaki kolendisa biso mpe kopesa biso litambwisi. Lokola totyaki makanisi na ndenge Yehova asalisaki biso tóyika mpiko na mokakatano wana na esika ya kotya makanisi na komekama yango moko, ebongisaki biso tóyikela mikakatano oyo eyaki nsima mpiko na kondima nyonso.”
17. Ndenge nini ndeko mwasi Helga azwaki libɔndisi? (Talá mpe elilingi.)
17 Bandeko na biso bakristo bakoki mpe kobɔndisa biso mingi. Ndenge nini? Tótalela ndakisa ya ndeko mwasi Helga, oyo afandaka na Hongrie. Na boumeli ya bambula mingi, akutanaki na mikakatano ndenge na ndenge oyo esalaki ete amitungisa mingi mpe amiyoka ete azali na ntina te. Kasi ntango akanisaka makambo yango, amonaka ete Yehova abɔndisaki ye na nzela ya lisangá. Alobi boye: “Mosala na ngai ya mosuni ezalaki kolɛmbisa ngai, nazalaki kosalisa mwana na ngai, mpe nazalaki na mikakatano mosusu ebele; na nyonso wana Yehova azangaki te kosalisa ngai ntango nyonso oyo amonaki ete makasi na ngai esili. Na mbula 30 oyo eleki, akokisaki elaka na ye ya kobɔndisa ngai mokolo na mokolo. Mbala mingi, apesaki ngai makasi na nzela ya maloba ya boboto mpe ya kolendisa oyo ezalaki kouta epai ya basusu. Mbala mingi okomona moto atindeli ngai mesaje, karte to apesi ngai longonya na ntango oyo nazalaki mpenza na mposa na yango.”
Ndenge nini Yehova akoki kosalela biso mpo na kobɔndisa basusu? (Talá paragrafe 17)
18. Ndenge nini tokoki kobɔndisa basusu?
18 Tozali na libaku kitoko ya komekola Nzambe na biso na oyo etali kobɔndisa basusu. Ndenge nini tokoki kosala yango? Tokoki komonisa motema molai ntango tozali koyoka bango, koloba na bango na ndenge ya kobɔndisa, mpe kosalela bango makambo oyo ekosalisa bango. (Mas. 3:27) Tosalaka nyonso mpo na kobɔndisa baoyo nyonso bazali na mpasi, ata baoyo bazali naino kosalela Yehova te. Ntango bazalani na biso bakutani na makambo ya mpasi, bazali kobɛla, to batungisami, tokendaka kotala bango, toyokaka bango mpe toyebisaka bango makambo ya kolendisa oyo ezali na Biblia. Ntango tozali komekola Yehova, “Nzambe ya kobɔndisama nyonso,” tokoki kosalisa bandeko na biso bakristo báyikela mikakatano mpiko, mpe mbala mosusu bato oyo basambelaka Yehova te bálinga kokɔta na losambo ya solo.—Mat. 5:16.
YEHOVA AZALAKA NTANGO NYONSO ELONGO NA BISO
19. Yehova asalaka nini mpo na biso, mpe ndenge nini tokoki komekola ye?
19 Yehova amibanzabanzaka mingi mpo na baoyo nyonso balingaka ye. Asundolaka biso te ntango tozali na mikakatano. Ndenge kaka moboti ya bolingo akipaka bana na ye malamu, Yehova mpe akipaka basaleli na ye ya sembo. Akambaka biso, akokisaka bamposa na biso, abatelaka biso, mpe abɔndisaka biso. Tomekolaka Tata na biso ya likoló ntango tosalisaka mpe tolendisaka basusu na mikakatano na bango. Ata soki tokutani na mikakatano mpe makambo ya mawa, tokoki komindimisa ete Yehova azali elongo na biso. Kutu, alaki biso ete: “Kobanga te, mpo nazali na yo.” (Yis. 41:10) Yango ezali mpenza kopesa biso mpiko! Ya solo, tozalaka biso moko te.
LOYEMBO 100 Tóyamba bango malamu
a Talá lisolo “Bikateli na yo ekumisa Nzambe” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15/04/2011.
b Talá paragrafe 11-14 ya lisolo “Kobá kolanda litambwisi ya Yehova” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 02/2024.
c Okoki komona bandakisa ya mikolo na biso na jw.org soki okomi “lisungi na makama” na esika ya koluka.
d Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 02/2017.
e NDIMBOLA YA ELILINGI: Bandeko na Malawi bazali kozwa biloko mpe lisalisi ya elimo nsima ya kokutana na likama.