Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Mai nk. 20-25
  • Nkombo ya Yehova ezali na ntina nini mpo na Yesu?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkombo ya Yehova ezali na ntina nini mpo na Yesu?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “NAYEBISI BANGO NKOMBO NA YO”
  • “NKOMBO NA YO, OYO OPESI NGAI”
  • “TATA, PESÁ NKOMBO NA YO NKEMBO”
  • “NAZALI KOPESA BOMOI NA NGAI”
  • “NASILISI MOSALA OYO OPESAKI NGAI”
  • Nkombo ya Yehova esengeli kozala na ntina nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • “Bósanzola nkombo ya Yehova”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Lisiko eteyaka biso nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • “Bópona bino moko . . . nani bokosalela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Mai nk. 20-25

LISOLO YA BOYEKOLI 22

LOYEMBO 15 Tókumisa Mwana ya liboso ya Yehova!

Nkombo ya Yehova ezali na ntina nini mpo na Yesu?

“Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango.”—YOA. 17:26.

NA MOKUSE

Tokotalela ndenge Yesu ayebisaki basusu nkombo ya Yehova mpe ndenge asantisaki yango mpe alongisaki yango.

1-2. (a) Yesu asalaki nini na butu ya nsuka liboso abomama? (b) Mituna nini tokotalela na lisolo oyo?

TOZALI na mwaminei, 14 Nisana ya mobu 33 T.B., na butu. Yesu asilisi kolya Bilei ya Mpokwa ya Nkolo elongo na bantoma na ye ya sembo na shambre moko ya likoló. Ayebi ete mwa bangonga na nsima bakotɛka ye, bakosambisa ye, bakokatela ye etumbu, bakonyokola ye, mpe nsukansuka bakoboma ye. Nsima ya bilei yango, Yesu ayebisi bantoma na ye mwa maloba ya nsuka mpo na kolendisa bango. Mpe mwa moke liboso bango nyonso bálongwa na shambre wana, Yesu asalaki libondeli moko ya ntina mingi. Ntoma Yoane akomaki libondeli yango, na Yoane mokapo 17.

2 Libondeli yango emonisi ete Yesu azalaki komitungisa mingimingi mpo na likambo nini na ntango wana? Ndenge nini libondeli yango emonisi likambo oyo ezalaki na ntina mpo na ye ntango azalaki kosala mosala na ye awa na mabele? Tokozwa biyano na mituna yango na lisolo oyo.

“NAYEBISI BANGO NKOMBO NA YO”

3. Yesu alobaki ete asalaki nini mpo na nkombo ya Yehova, mpe yango elimboli nini? (Yoane 17:​6, 26)

3 Na libondeli yango, Yesu alobaki: “Nayebisi bango nkombo na yo.” Kutu, alobaki mbala mibale ete ayebisaki bayekoli na ye nkombo ya Yehova. (Tángá Yoane 17:​6, 26.) Alingaki koloba nini? Ayebisaki bango nde ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova? Te. Lokola bayekoli ya Yesu bazalaki Bayuda, bayebaki ete nkombo ya Nzambe ezali Yehova. Nkombo yango ezalaki mbala soki 7000 na Makomami ya Ebre. Na yango, Yesu azalaki kolobela kaka nkombo Yehova te; azalaki nde kolobela oyo nkombo yango emonisi. Yesu asalisaki bayekoli na ye báyeba bomoto ya Yehova, oyo esangisi mikano, misala, mpe bizaleli na Ye, na ndenge oyo moto mosusu akokaki kosala te.

4-5. (a) Ndakisa nini emonisi ndenge oyo nkombo ya moto ekoki kokóma na ntina koleka? (b) Na ndenge nini nkombo Yehova ekómaki na ntina mingi koleka mpo na bayekoli ya Yesu?

4 Tózwa ndakisa oyo: Kanisá ete David, oyo azali nkulutu na lisangá na bino, azali mpe monganga oyo asalaka bato lipaso. Oyebi ndeko yango banda kala. Kasi, mokolo mosusu obɛli mpe esɛngi lisalisi ya nokinoki. Bamemi yo na lopitalo oyo ndeko yango asalaka mpe asaleli mayele na ye ya monganga mpo na kobikisa yo. Sikoyo nkombo ya ndeko yango ekokóma kolobela yo mingi, boye te? Na yango, David azali lisusu kaka te nkulutu oyo oyebi, kasi mpe monganga oyo abikisaki yo.

5 Ndenge moko mpe, bayekoli ya Yesu bayebaki nkombo Yehova banda kala. Kasi nkombo yango ekómaki na ntina mingi koleka mpo Yesu asalisaki bango báyeba Yehova malamu. Mpo na nini tolobi bongo? Mpo Yesu amonisaki bomoto ya Tata na ye na makambo nyonso oyo alobaki mpe asalaki. Na yango, bantoma bayekolaki “koyeba” Yehova malamu ntango bazalaki koyoka mateya ya Yesu mpe kotala ndenge oyo azalaki kosalela basusu makambo.—Yoa. 14:9; 17:3.

“NKOMBO NA YO, OYO OPESI NGAI”

6. Na ndenge nini Yehova apesaki Yesu nkombo na Ye? (Yoane 17:​11, 12)

6 Na libondeli na ye, Yesu asɛngaki Yehova mpo na bayekoli na ye ete: “Kɛngɛlá bango mpo na nkombo na yo, oyo opesi ngai.” (Tángá Yoane 17:​11, 12.) Yango elingi nde koloba ete nkombo ya Yesu ekómaki Yehova? Te. Tósimba ete ntango Yesu alobelaki nkombo Yehova, alobaki “nkombo na yo.” Na yango nkombo Yehova ekómaki nkombo ya Yesu te. Bongo Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete Nzambe apesaki ye nkombo na ye? Ya liboso, Yesu azalaki momonisi ya Yehova mpe molobeli na ye. Ayaki na nkombo ya Tata na ye mpe asalaki makamwisi na nkombo yango. (Yoa. 5:43; 10:25) Ya mibale, nkombo Yesu elimboli “Yehova azali lobiko.” Na yango, nkombo Yehova ezalaki na kati ya ndimbola ya nkombo ya Yesu.

7. Mpo na nini Yesu akokaki koloba na nkombo ya Yehova? Pesá ndakisa.

7 Tózwa ndakisa: Ambasadɛrɛ azalaka momonisi ya mokonzi ya ekólo na ye na mboka mopaya. Na yango, akoki koloba na nkombo ya mokonzi yango mpe maloba na ye ezalaka kaka lokola maloba ya mokonzi yango. Ndenge moko mpe, Yesu azalaki momonisi ya Yehova mpe azalaki koloba na bato na nkombo ya Yehova.—Mat. 21:9; Luka 13:35.

8. Na ndenge nini nkombo ya Yehova ezalaki “na kati” ya Yesu ata liboso aya awa na mabele? (Kobima 23:​20, 21)

8 Biblia ebengi Yesu “Liloba” mpo azali molobeli ya Yehova. Yehova asalelaki ye mpo na koyebisa baanzelu mpe bato makambo mpe kopesa bango malako ya Nzambe. (Yoa. 1:​1-3) Mbala mosusu Yesu nde anzelu oyo Yehova atindaki mpo na kobatela Bayisraele na esobe. Ntango ayebisaki Bayisraele bátosa anzelu yango, Yehova alobaki: “Mpo nkombo na ngai ezali na kati na ye.”a (Tángá Kobima 23:​20, 21.) Na ndenge nini nkombo ya Yehova ezalaki “na kati” ya Yesu? Yesu azali momonisi ya Yehova mpe ye nde moto ya libosoliboso oyo akɔtelaka mpe asantisaka nkombo ya Tata na ye.

“TATA, PESÁ NKOMBO NA YO NKEMBO”

9. Nini emonisi ete nkombo ya Yehova ezalaki na ntina mingi mpo na Yesu?

9 Ndenge touti komona yango, ata liboso Yesu aya awa na mabele, nkombo ya Yehova ezalaki na ntina mingi mpo na ye. Yango wana mpe, na likambo nyonso oyo Yesu asalaki awa na mabele, amonisaki ete nkombo ya Yehova ezalaki na ntina mingi mpo na ye! Pene ya nsuka ya mosala na ye, Yesu asɛngaki Yehova ete: “Tata, pesá nkombo na yo nkembo.” Na mbala moko, Tata na ye ayanolaki na mongongo makasi uta na likoló ete: “Nasili kopesa yango nkembo mpe nakopesa yango nkembo lisusu.”—Yoa. 12:28.

10-11. (a) Ndenge nini Yesu apesaki nkombo ya Yehova nkembo? (Talá mpe elilingi.) (b) Mpo na nini nkombo ya Yehova esengeli kosantisama mpe kolongisama?

10 Yesu ye moko mpe apesaki nkombo ya Tata na ye nkembo. Ndenge nini asalaki yango? Ayebisaki basusu bizaleli mpe misala ya kokamwa ya Tata na ye. Kasi, kopesa nkombo ya Yehova nkembo esuki wana te. Nkombo ya Yehova esengeli kosantisama mpe kolongisama.b Yesu amonisaki ntina ya likambo yango ntango alakisaki bayekoli na ye ndenge ya kobondela. Alobaki: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.”—Mat. 6:9.

11 Mpo na nini nkombo ya Yehova esengeli kosantisama mpe kolongisama? Mpo na elanga ya Edene, Satana Zabolo abebisaki lokumu ya Yehova Nzambe mpe akoselaki ye makambo. Satana alobaki ete Yehova azali moto ya lokuta mpe ete apimelaki Adama ná Eva eloko moko ya malamu. (Eba. 3:​1-5) Satana alingaki komonisa ete ndenge ya Yehova ya kosala makambo ezalaki malamu te. Na ndenge yango, abebisaki nkombo, to lokumu ya Yehova. Na nsima, na mikolo ya Yobo, Satana alobaki ete baoyo basalelaka Yehova basalaka yango kaka mpo na kozwa eloko moko epai na Ye. Na lokuta na ye, Satana alobaki lisusu ete bato balingaka mpenza Yehova te, yango wana soki bakutani na mikakatano, bakotika kosalela Ye. (Yobo 1:​9-11; 2:4) Esɛngaki ntango eleka mpo eyebana soki nani azali moto ya lokuta, Yehova to Satana.

Yesu azali kosala Lisolo likoló ya Ngomba liboso ya ebele ya bato.

Yesu ateyaki bayekoli na ye ete ezali na ntina mingi nkombo ya Nzambe esantisama (Talá paragrafe 10)


“NAZALI KOPESA BOMOI NA NGAI”

12. Yesu andimaki kosala nini mpo na komonisa ete alingaka Yehova?

12 Lokola Yesu alingaki Yehova mingi, azalaki na mposa ya kosala nyonso oyo akoki mpo na kosantisa mpe kolongisa nkombo ya Yehova. Andimaki ata kokufa mpo na nkombo ya Yehova.c Yango wana alobaki: “Nazali kopesa bomoi na ngai.” (Yoa. 10:​17, 18) Adama ná Eva, bato ya liboso oyo bazalaki bato ya kokoka, baboyaki Yehova mpe balandaki Satana. Kasi, Yesu andimaki koya awa na mabele mpe amonisaki ndenge alingaka Yehova mingi. Amonisaki yango na ndenge atosaki Yehova na makambo nyonso. (Ebr. 4:15; 5:​7-10) Abatelaki bosembo bomoi na ye mobimba, tii na liwa na nzete ya mpasi. (Ebr. 12:2) Na ndenge yango amonisaki ete alingaka Yehova mpe nkombo na Ye.

13. Mpo na nini Yesu nde abongaki mpo na komonisa ete Satana azali moto ya lokuta? (Talá mpe elilingi.)

13 Na bomoi na ye, Yesu amonisaki polele ete Satana nde moto ya lokuta, kasi Yehova te! (Yoa. 8:44) Yesu ayebi Yehova malamu koleka moto mosusu nyonso. Soki mwa solo ezalaki na kati ya makambo nyonso oyo Satana afundaki Yehova, Yesu alingaki koyeba yango. Kasi, Yesu azalaki na ekateli makasi ya kolongisa lokumu to nkombo ya Yehova. Ata ntango emonanaki lokola ete Yehova asundoli ye, Yesu andimaki kokufa na esika aboya Tata na ye ya bolingo.—Mat. 27:46.d

Yesu na nzete ya mpasi.

Bomoi ya Yesu emonisaki polele ete Satana azali moto ya lokuta, kasi Yehova te! (Talá paragrafe 13)


“NASILISI MOSALA OYO OPESAKI NGAI”

14. Mbano nini Yehova apesaki Yesu mpo na bosembo na ye?

14 Na libondeli oyo Yesu asalaki na butu liboso akufa, alobaki: “Nasilisi mosala oyo opesaki ngai.” Yesu atyelaki Yehova motema ete akopesa ye mbano mpo na bosembo na ye. (Yoa. 17:​4, 5) Azalaki mpenza na ntina ya kotyela Tata na ye motema. Yehova asundolaki ye na nkunda te. (Mis. 2:​23, 24) Asekwisaki ye mpe atyaki ye na esika ya lokumu koleka na likoló. (Flp. 2:​8, 9) Nsukansuka, Yesu akómaki Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe. Bokonzi yango ekosala nini? Na libondeli oyo Yesu alakisaki bayekoli na ye, alobaki: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo [Yehova] esalema mpe na mabele, lokola na likoló.”—Mat. 6:10.

15. Makambo nini mosusu Yesu akosala?

15 Mosika te, Yesu akobundisa banguna ya Nzambe na Armagedone mpe akoboma bato mabe. (Em. 16:​14, 16; 19:​11-16) Mwa moke na nsima, akobwaka Satana na “libulu mozindo,” elingi koloba Satana akozala lokola mokufi, oyo akoki kosala eloko te. (Em. 20:​1-3) Mpe na boyangeli na ye ya mbula nkóto, Yesu akozongisa kimya na mabele mpe akosalisa bato bákóma bato ya kokoka. Akosekwisa bakufi. Mpe akokómisa mabele mobimba paradiso. Nsukansuka, mokano ya Yehova ekokokisama!—Em. 21:​1-4.

16. Makambo ekozala ndenge nini na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto?

16 Makambo ekozala ndenge nini na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto? Lisumu mpe ezaleli ya kozanga kokoka ekozala lisusu te. Bato bakozala lisusu te na mposa ya kosɛnga bolimbisi ya masumu na bango na nzela ya lisiko; bakozala mpe na mposa te ete Nganga-Nzambe monene Yesu to banganga-nzambe 144000 básalisa bango bázala na boyokani malamu na Yehova. Na nsima, “liwa [oyo Adama akɔtisá], monguna ya nsuka,” ekozala lisusu te. Malita ekotikala mpamba. Bakufi bakosila kosekwa. Moto nyonso na mabele akozala moto ya kokoka.—1 Ko. 15:​25, 26.

17-18. (a) Nini ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto? (b) Yesu akosala nini na nsuka ya boyangeli na ye? (1 Bakorinti 15:​24, 28) (Talá mpe elilingi.)

17 Likambo nini mosusu ekosalema na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto? Na ntango yango, likambo moko monene mpenza ekosalema. Ntembe oyo etali kosantisama ya nkombo ya Yehova ekosila. Ndenge nini? Na elanga ya Edene, Satana alobaki ete Yehova azali moto ya lokuta mpe ayangelaka bato na bolingo te. Banda wana, bato ndenge na ndenge oyo bapesaka Yehova lokumu mpe limemya basantisaka nkombo na ye. Na yango, na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto, lokumu ya Yehova ekolongisama mpenzampenza. Yehova akosila komonisa polele ete azali Tata ya likoló oyo atondi na bolingo.

18 Nsukansuka, ntembe oyo Satana abimisaki ekosila mbala moko mpo na libela. Yesu akosala nini na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto? Akosala nde lokola Satana mpe akotombokela Yehova? Te! (Tángá 1 Bakorinti 15:​24, 28.) Yesu akozongisela Tata na ye Bokonzi. Akomitya na nse ya boyangeli ya Yehova. Ya solo, na bokeseni na Satana, Yesu akondima kozongisa nyonso mpo alingaka mpenza Yehova.

Yesu na likoló, azali kopesa Yehova motole na ye.

Yesu akondima kozongisela Yehova Bokonzi na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto (Talá paragrafe 18)


19. Nkombo ya Yehova ezali na ntina nini mpo na Yesu?

19 Tokoki kokamwa te ndenge Yehova andimaki kopesa Yesu nkombo na Ye! Yesu azalaki momonisi ya Tata na ye na ndenge ya kokoka. Na yango, nkombo ya Yehova ezali na ntina nini mpo na Yesu? Ezali na ntina koleka eloko nyonso. Yesu andimaki kokufa mpo na nkombo yango, mpe akondima kozongisela Yehova nyonso na nsuka ya Boyangeli ya Mbula Nkóto. Bongo biso, ndenge nini tokoki komekola ndakisa ya Yesu? Tokozwa eyano na motuna yango na lisolo oyo elandi.

OKOPESA EYANO NINI?

  • Na ndenge nini Yesu ayebisaki bayekoli na ye nkombo ya Yehova?

  • Na ndenge nini Yehova apesaki Yesu nkombo na ye?

  • Yesu andimaki kosala nini mpo na nkombo ya Yehova, mpe mpo na nini?

LOYEMBO 16 Bókumisa Yah mpo na Mwana na ye oyo atyami mafuta

a Na bantango mosusu, baanzelu mpe bazalaki bamonisi ya Yehova ntango bamemaki nsango na nkombo na ye. Yango wana na bisika mosusu, Biblia ebengi to elobeli anzelu lokola nde Yehova ye moko. (Eba. 18:​1-33) Lisusu, atako Biblia elobi ete Yehova nde apesaki Moize Mobeko, bavɛrsɛ mosusu emonisi ete Yehova asalelaki nde baanzelu mpo bápesa Mobeko yango na nkombo na Ye.—Lev. 27:34; Mis. 7:​38, 53; Gal. 3:19; Ebr. 2:​2-4.

b NDIMBOLA YA MALOBA: “Kosantisa” elimboli kopesa lokumu, kotalela lokola mosantu, to kozwa na limemya. “Kolongisa” elimboli kokɔtela moto ntango bazali koloba lokuta mpo na ye to, komonisa ete moto yango azali na ngambo te mpe ete makambo oyo balobaki mpo na ye ezali lokuta.

c Liwa ya Yesu efungolaki mpe nzela mpo bato bázwa bomoi ya seko.

d Talá “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 04/2021, nk. 30-31.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto