Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w25 Août nk. 8-13
  • Ndimá ete Yehova alingaka yo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ndimá ete Yehova alingaka yo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NTINA OYO TOSENGELI KONDIMA ETE YEHOVA ALINGAKA BISO
  • NINI EKOKI KOSALISA YO ONDIMA ETE YEHOVA ALINGAKA YO?
  • NDENGE OYO YESU ASALISI BISO TÓNDIMA ETE YEHOVA ALINGAKA BISO
  • KOBÁ KOMINDIMISA MPENZA ETE YEHOVA ALINGAKA YO
  • Yehova alingaka yo mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2024
  • Bolingo ya Nzambe ezali mpo na seko
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Lisiko eteyaka biso nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
  • Ndimá ete okoki koyeba makambo mosusu te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2025
w25 Août nk. 8-13

LISOLO YA BOYEKOLI 33

LOYEMBO 4 “Yehova azali Mobateli na ngai”

Ndimá ete Yehova alingaka yo

“Nabendi yo epai na ngai na bolingo ya sembo.”—YIR. 31:3.

NA MOKUSE

Ntina oyo tosengeli kondima ete Yehova alingaka biso mpe oyo tokoki kosala mpo tóndima lisusu makasi likambo yango.

1. Nini etindaki yo omipesa na Yehova na libondeli? (Talá mpe elilingi.)

OZALI koyeba lisusu ntango oyo omipesaki na Yehova na libondeli? Ozwaki ekateli yango mpo oyekolaki koyeba ye mpe kolinga ye. Olakaki ye ete okotya mokano na ye na esika ya liboso na bomoi na yo mpe okokoba kolinga ye na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso, mpe na makasi na yo nyonso. (Mrk. 12:30) Banda wana, bolingo na yo epai na ye ezali se kokóma makasi. Na yango okoyanola nini soki moto atuni yo: “Olingaka mpenza Yehova?” Kozanga kokakatana, okoloba: “Nalingaka ye koleka moto to eloko mosusu nyonso!”

Bililingi: Ndeko mwasi moko azali kokanisa ndenge amipesaki na Yehova mpe azwaki batisimo. 1. Afandi libándá azali kobondela. 2. Azwi batisimo na ebale moko.

Ozali koyeba lisusu ndenge oyo kolinga Yehova mingi etindaki yo omipesa na ye mpe ozwa batisimo? (Talá paragrafe 1)


2-3. Yehova alingi ete tóndima nini, mpe tokolobela nini na lisolo oyo? (Yirimia 31:3)

2 Kasi, okoyanola nini soki moto atuni yo: “Oyebi ete Yehova alingaka yo?” Okobanga nde kopesa eyano, mbala mosusu mpo ozali kokanisa ete obongi te Yehova alinga yo? Ndeko mwasi moko oyo anyokwamá mingi na bomwana alobaki boye: “Nayebi ete nalingaka Yehova. Nazalaka na ntembe te mpo na yango. Kasi, mbala mingi namitunaka nde soki Yehova alingaka ngai mpenza.” Na yango, ndenge nini okoki koyeba soki Yehova alingaka yo?

3 Yehova alingi ondima ete alingaka yo. (Tángá Yirimia 31:3.) Likambo ya solo ezali ete Yehova abendá yo epai na ye. Mpe ntango omipesaki na ye mpe ozwaki batisimo, apesaki yo eloko moko ya motuya mpenza: bolingo na ye ya sembo. Bolingo ya sembo ezalaka makasi mpenza mpe esilaka te. Etindaka Yehova amona basaleli na ye ya sembo, ata mpe yo, ‘eloko na ye moko ya motuya.’ (Mal. 3:17) Yehova alingi ondima ete alingaka yo ndenge ntoma Paulo mpe andimaki ete Yehova alingaka ye. Yango wana Paulo akomaki: “Nandimi mpenza ete ezala liwa, to bomoi, to baanzelu, to baguvɛrnema, to makambo ya lelo, to makambo oyo ekoya, to banguya, to bosanda, to bozindo, to ekelamu nini mosusu ekokoka te kokabola biso na bolingo ya Nzambe.” (Rom. 8:​38, 39) Na lisolo oyo, tokolobela ntina oyo tosengeli komindimisa lisusu makasi ete Yehova alingaka biso mpe oyo tokoki kosala mpo tómindimisa ndenge wana.

NTINA OYO TOSENGELI KONDIMA ETE YEHOVA ALINGAKA BISO

4. Ndenge nini tokoki kobundisa moko ya mayele mabe ya Satana?

4 Ntango tondimi ete Yehova alingaka biso, tokoki kobundisa moko ya “mayele mabe” ya Satana. (Ef. 6:11) Satana akosala nyonso oyo akoki mpo na kopekisa biso kosalela Yehova. Moko ya mayele mabe oyo Satana asalelaka ezali ya kopanza lokuta oyo ete Yehova alingaka biso te. Kobosanaka te ete Satana alukaka mabaku ya kosalela mayele na ye. Mbala mingi abundisaka biso ntango tozali na makasi te, mbala mosusu ntango makanisi na biso elɛmbi mpo na makambo oyo tokutaná na yango kala, mpo na mikakatano oyo tozali na yango sikoyo, to mpo tozali komitungisa mpo na mikolo ezali koya. (Mas. 24:10) Satana azali lokola nkɔsi oyo ezali koluka kokanga nyama oyo ezangi libateli. Na yango, asalelaka ntango oyo tozali na mawa mpo na kotinda biso tólɛmbisa mabɔkɔ. Kasi soki tokobi komindimisa mpenza ete Yehova alingaka biso, ekosalisa biso tólonga ‘kotɛmɛla’ Satana ná lokuta na ye mpe mayele mabe na ye.—1 Pe. 5:​8, 9; Yak. 4:7.

5. Mpo na nini ezali na ntina tóyokaka ete Yehova alingaka biso mpe azwaka biso na motuya?

5 Ntango tondimi ete Yehova alingaka biso, boninga na biso na ye ekokóma makasi. Mpo na nini tokoki koloba bongo? Mpo Yehova akelá biso na mposa ya kolinga basusu mpe ya koyoka ete basusu balingaka biso. Ntango moto alingi biso, etindaka biso mpe tólinga ye. Na yango, ntango tozali koyoka ete Yehova alingaka biso mpe azwaka biso na motuya, biso mpe tokolinga ye mingi. (1 Yoa. 4:19) Mpe soki tozali kolinga ye mingi, ye mpe akolinga biso mingi. Biblia eyebisi biso polele ete: “Bópusana penepene na Nzambe, mpe ye akopusana penepene na bino.” (Yak. 4:8) Kasi, tokoki kosala nini mpo tómindimisa makasi ete Yehova alingaka biso?

NINI EKOKI KOSALISA YO ONDIMA ETE YEHOVA ALINGAKA YO?

6. Okoki kosala nini mpo ondima ete Yehova alingaka yo?

6 Bondeláká mingi mpe sɛngáká makambo ya sikisiki. (Luka 18:1; Rom. 12:12) Sɛngáká Yehova, ata mbala ebele na mokolo soki esengeli, ete asalisa yo omimona ndenge ye amonaka yo. Ya solo, na bantango mosusu ekoki kozala mpasi mpo ondimisa motema na yo ete Yehova alingaka yo. Kasi kobosana te ete Yehova azali monene koleka motema na yo. (1 Yoa. 3:​19, 20) Ayebi yo malamu koleka yo moko; amonaka epai na yo bizaleli ya malamu oyo mbala mosusu yo moko omonaka te. (1 Sa. 16:7; 2 Nt. 6:30) Na yango, kokakatanaka te ‘kosopela’ ye mayoki na yo, mpe kosɛnga ye asalisa yo ondima ete alingaka yo. (Nz. 62:​8, msl.) Na nsima, mpo osala na boyokani na mabondeli na yo, salelá makanisi oyo elandi.

7-8. Ndenge nini bavɛrsɛ mosusu na mokanda ya Nzembo esalisaka biso tóyeba ete Yehova alingaka biso?

7 Ndimá maloba ya Yehova. Elimo na ye esalisaki bakomi ya Biblia bálobela ndenge oyo azalaka mpenza. Talá ndenge Davidi alobeli boboto ya Yehova. Alobi boye: “Yehova azali pene na baoyo motema ebukani; abikisaka baoyo balɛmbi nzoto.” (Nz. 34:18) Ntango ozali na mawa makasi, okoki kokanisa ete moto te ayebi ndenge oyo ozali komiyoka. Nzokande Yehova alaki ete na bantango ya ndenge wana, azali pene na yo mpo amoni ete ozali na mposa na ye koleka na bantango mosusu. Na Nzembo mosusu, Davidi akomaki boye: “Tyá mai ya miso na ngai na kati ya molangi na yo ya mposo ya nyama.” (Nz. 56:8) Yehova amonaka ntango oyo ozali na mawa mpe na mpasi. Atyelaka yo likebi mingi mpe amityaka na esika na yo. Ezali lokola nde Yehova abombaka mai ya miso na yo mpe azwaka yango na motuya, kaka ndenge moto oyo azali kosala mobembo na mokili ekauká azwaka na motuya mai oyo ezali na molangi na ye. Nzembo 139:3 elobi: “[Yehova] oyebi malamu banzela na ngai nyonso.” Yehova amonaka makambo nyonso oyo osalaka, kasi atyaka likebi kaka na makambo ya malamu. (Ebr. 6:10) Mpo na nini? Mpo azwaka na motuya milende nyonso oyo osalaka mpo na kosepelisa ye.a

8 Na nzela ya bavɛrsɛ ya kobɔndisa oyo Yehova akomisá na Liloba na ye, azali nde koloba na yo: “Nalingi oyeba ete nalingaka yo mingi mpe natyelaka yo likebi.” Kasi ndenge tomonaki yango liboso, Satana apanzaka lokuta oyo ete Yehova alingaka yo te. Na yango, soki na bantango mosusu ozali komituna soki Yehova alingaka yo, ozwa mwa ntango mpe omituna boye: ‘Nakondimela nani—“tata ya lokuta” to “Nzambe oyo alobaka solo”?’—Yoa. 8:44; Nz. 31:5.

9. Yehova alaki nini epai ya baoyo balingaka ye? (Kobima 20:​5, 6)

9 Kanisá ndenge Yehova asalaka soki moto alingi ye. Talá makambo oyo Yehova alobaki na Moize mpe na Bayisraele. (Tángá Kobima 20:​5, 6.) Yehova alaki ete akokoba komonisa bolingo ya sembo epai ya baoyo balingaka ye. Maloba yango endimisi biso ete Nzambe na biso oyo azali sembo akoboya ata moke te kolinga basaleli na ye oyo balingaka ye. (Neh. 1:5) Na yango, ntango okómi komituna soki Yehova alingaka yo, ozwa mwa ntango mpe omituna boye: ‘Nalingaka Yehova?’ Na nsima kanisá likambo oyo: Soki olingaka ye mpe osalaka nyonso mpo na kosepelisa ye, yebá ete ye mpe alingaka yo mingi. (Dan. 9:4; 1 Ko. 8:3) Na maloba mosusu, soki ozali na ntembe te ete olingaka Yehova, mpo na nini otya ntembe ete ye mpe alingaka yo? Yebá ete akolinga yo ntango nyonso mpe akosundola yo ata moke te.

10-11. Ndenge nini Yehova alingi otalelaka lisiko? (Bagalatia 2:20)

10 Manyoláká na lisiko. Mbeka ya lisiko ya Yesu Kristo ezali likabo eleki monene oyo Yehova apesá bato. (Yoa. 3:16) Kasi ezali mpe likabo oyo apesá yo? Ɛɛ! Talá ndakisa ya ntoma Paulo. Na ntembe te oyebi ete asalaki masumu ya minene liboso akóma mokristo, mpe asengelaki kokoba kobundisa bolɛmbu na ye. (Rom. 7:​24, 25; 1 Tim. 1:​12-14) Atako bongo, akómaki komona lisiko ete ezali likabo oyo Yehova apesaki nde ye. (Tángá Bagalatia 2:20.) Kobosana te ete elimo ya Yehova nde esalisaki ntoma Paulo akoma maloba yango. Mpe makambo nyonso oyo ezali na Biblia ezali wana mpo na koteya biso. (Rom. 15:4) Maloba ya Paulo emonisi ndenge oyo Yehova alingi ete yo mpe otalelaka lisiko, elingi koloba lokola likabo oyo apesi nde yo. Soki ozali kotalela lisiko ndenge wana, okomindimisa makasi ete Yehova alingaka yo mpenza.

11 Topesaka Yehova matɔndi ndenge atindaki Yesu aya kokufa mpo na biso. Kasi ntina mosusu oyo Yesu ayaki awa na mabele ezalaki mpo na koyebisa bato solo na ntina etali Nzambe. (Yoa. 18:37) Solo yango esangisi mpe ndenge oyo Yehova alingaka bana na ye mingi.

NDENGE OYO YESU ASALISI BISO TÓNDIMA ETE YEHOVA ALINGAKA BISO

12. Mpo na nini tokoki kondima makambo oyo Yesu alobaki mpo na Yehova?

12 Ntango Yesu azalaki awa na mabele, azalaki kosepela koyebisa bato bomoto ya Yehova. (Luka 10:22) Tosengeli kondima mpenza makambo oyo Yesu alobaki mpo na Yehova. Mpo na nini? Mpo Yesu azalaki elongo na Yehova ntango molai mpenza liboso aya awa na mabele. (Kol. 1:15) Yesu ayebaki ndenge Tata na ye alingaka ye mingi; amoná mpe ndenge oyo Yehova alingaka baanzelu ya sembo mpe bana na ye ya sembo oyo bazali awa na mabele. Ndenge nini Yesu asalisaka basusu bándima ete Nzambe alingaka bango?

13. Ndenge nini Yesu alingi tómonaka Yehova?

13 Yesu alingi tómonaka Yehova ndenge ye mpe amonaka Ye. Na Baevanzile, Yesu abengi Yehova “Tata” mbala koleka 160. Mpe ntango azalaki koloba na bayekoli na ye, azalaki kosalela maloba lokola “Tata na bino” to “Tata na bino ya likoló.” (Mat. 5:16; 6:26) Nɔti ya boyekoli na Matai 5:16 elobi boye: “Basaleli ya Nzambe ya ntango ya kala basalelaki bibengeli mingi ya lokumu mpo na kolobela mpe koloba na Yehova, na ndakisa ‘Mozwi-ya-Nguya-Nyonso,’ ‘Oyo-Aleki-Likoló,’ mpe ‘Mozalisi monene.’ Kasi ndenge Yesu asalelaki mbala mingi liloba ya pɛtɛɛ ‘Tata’, oyo bato mingi bayebaki, emonisi ete Nzambe azali na boyokani ya penepene na bato oyo basambelaka ye.” Ezali polele ete Yesu alingi tómonaka Yehova ndenge ye mpe amonaka Ye, lokola Tata na biso ya bolingo, oyo alingaka bana na ye mingi. Tózwa ndakisa ya mbala mibale oyo Yesu asalelaki liloba “Tata.”

14. Ndenge nini Yesu amonisaki ete mokomoko na biso azali na motuya na miso ya Tata na biso ya likoló? (Matai 10:​29-31) (Talá mpe elilingi.)

14 Ya liboso, tótalela maloba ya Yesu oyo ezali na Matai 10:​29-31. (Tángá.) Bakɛngɛli-mboka ezali bandɛkɛ ya mike mpenza oyo ekolinga Yehova to ekosambela ye ata mokolo moko te. Nzokande, Tata na biso ya likoló azwaka na motuya ata mokɛngɛli-mboka moko na boye ete ayebaka ntango ekwei na mabele. Na yango, Yehova azwaka mpe na motuya mingi mpenza mosaleli na ye mokomoko ya sembo oyo asalelaka ye na bolingo mpe atyelaka ye likebi mingi! Na oyo etali maloba “ata nsuki nyonso ya motó na bino etángami,” nɔti ya boyekoli na vɛrsɛ 30 elobi boye: “Ndenge Yehova ayebi ata makambo ya mikemike ndenge wana emonisi ete atyelaka mpenza moyekoli mokomoko ya Kristo likebi.” Ezali polele ete Yesu alingi tóndima ete mokomoko na biso azali na motuya na miso ya Tata na biso ya likoló.

Yesu azali kolakisa bayekoli na ye mokɛngɛli-mboka oyo ezali kokita na nse. Bayekoli na ye bazali koyoka na likebi.

Yehova azwaka ata mokɛngɛli-mboka moko na motuya mpo ayebaka ntango ekwei na mabele. Na yango, azwaka mpe na motuya mingi mpenza mosaleli na ye ya sembo oyo alingaka ye! (Talá paragrafe 14)


15. Maloba ya Yesu oyo ezali na Yoane 6:44 emonisi yo nini mpo na Tata na yo ya likoló?

15 Tótalela ndakisa ya mibale esika Yesu asalelaki liloba “Tata.” (Tángá Yoane 6:44.) Tata na yo ya likoló abendaki yo, na boboto mpenza, mpo oya na kati ya solo. Mpo na nini abendaki yo? Mpo amonaki ete ozali na motema oyo ebongi. (Mis. 13:48) Nɔti ya boyekoli na Yoane 6:44 elobi ete mbala mosusu Yesu azalaki kokanisa maloba ya Yirimia oyo ezali na vɛrsɛ oyo esimbi lisolo oyo, ete: “Nabendi yo epai na ngai na bolingo ya sembo [to, nakobi komonisela yo bolingo ya sembo].” (Yir. 31:3; msl.; talá mpe Hosea 11:4.) Kanisá oyo yango elimboli. Tata na biso ya likoló azali kokoba komona makambo ya malamu epai na yo, oyo mbala mosusu yo moko omonaka te.

16. (a) Yesu ateyaki biso nini, mpe mpo na nini tosengeli kondimela ye? (b) Ndenge nini okoki komindimisa makasi ete Yehova nde Tata oyo osengeli na ye? (Talá etanda “Tata oyo biso nyonso tosengeli na ye.”)

16 Ndenge Yesu alobelaki Yehova lokola Tata na biso, azalaki nde koloba na biso ete: “Yehova azali kaka Tata na ngai te; azali mpe Tata na bino. Mpe nazali koyebisa bino ete alingaka bino mpe atyelaka mpenza mokomoko na bino likebi mingi.” Na yango, soki na bantango mosusu ozali na ntembe ete Yehova alingaka yo, ozwa mwa ntango mpe omituna boye: ‘Nasengeli te kondima maloba ya Mwana oyo ayebi Tata na biso malamu koleka mpe oyo alobaka ntango nyonso solo?’—1 Pe. 2:22.

“Tata oyo biso nyonso tosengeli na ye”

Maloba yango ezali na kati ya maloba ya ebandeli na buku Pusaná penepene na Yehova. Na esika oyo elimboli mokano ya buku yango, elobi: “Tokoyeba ete Yehova nde azali . . . Tata oyo biso nyonso tosengeli na ye. Azali na makasi, na bosembo, na bwanya mpe na bolingo, mpe asundolaka bana na ye ya sembo ata moke te.”

Mwasi moko oyo abɔkwamá na tata oyo azalaki konyokola ye ayebisi ndenge buku yango esalisaki ye; alobi boye: “Eteyaki ngai ete liloba ‘tata’ esengeli kobangisa te. Sikoyo nayebi ndenge tata ya malamu azalaka. Nayebi ete Yehova andimaka ngai, mpe ngai nandimi ye lokola Tata na ngai.” Nsima ya kotánga buku yango, mwasi mosusu alobaki: “Ya solo Yehova azali Tata oyo aleki malamu mpenza!”

Mpo na omindimisa mpenza ete Yehova azali Tata oyo osengeli na ye, okoki kosala programɛ ya koyekola, kotánga, to kozongela kotánga buku yango.

KOBÁ KOMINDIMISA MPENZA ETE YEHOVA ALINGAKA YO

17. Mpo na nini tosengeli kokoba komindimisa mpenza ete Yehova alingaka biso?

17 Tosengeli kokoba komindimisa makasi ete Yehova alingaka biso. Ndenge tomoni yango, monguna na biso ya mayele mabe, Satana, akoluka kosala nyonso mpo tótika kosalela Yehova. Mpo na kolɛmbisa biso, akokoba kosala ete tótyaka ntembe ete Yehova alingaka biso. Tosengeli te kotika Satana alonga!—Yobo 27:5.

18. Ndenge nini okoki komindimisa mpenza ete Yehova alingaka yo?

18 Mpo omindimisa mpenza ete Yehova alingaka yo, kobá kobondela ye asalisa yo omitalela ndenge oyo ye atalelaka yo. Manyoláká bavɛrsɛ ya Biblia oyo emonisi ete alingaka yo mingi. Kanisá ndenge oyo alingaka baoyo balingaka ye; akoboya ata moke te kolinga moto oyo alingaka ye. Kanisá mpe ntina oyo okoki komona ete lisiko ezali likabo oyo Yehova apesaki yo. Lisusu ndimelá Yesu ndenge alobi ete Yehova azali Tata na yo ya likoló. Na bongo soki moto atuni yo: “Ondimaka ete Yehova alingaka yo?” okoyanola ye kozanga kokakatana ete, “Ɛɛ, alingaka ngai! Mpe mokolo na mokolo nasalaka makasi namonisa ete ngai mpe nalingaka ye!”

OKOPESA EYANO NINI?

  • Mpo na nini tosengeli kondima ete Yehova alingaka biso?

  • Nini ekoki kosalisa biso tóndima ete Yehova alingaka biso?

  • Ndenge nini Yesu asalisi biso tóndima ete Yehova alingaka biso?

LOYEMBO 154 Bolingo ekosuka te

a Mpo na koyeba bavɛrsɛ mosusu ya kobɔndisa oyo endimisaka biso ete Yehova alingaka biso, talá motó ya likambo “Bantembe” na buku Batoli ya Biblia mpo na bomoi ya bakristo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto