LISOLO YA BOYEKOLI 34
LOYEMBO 3 Nguya na ngai, elikya na ngai, makasi na ngai
Ndimá ete Yehova alimbisá yo
“Olimbisaki libunga na ngai, masumu na ngai.”—NZ. 32:5.
NA MOKUSE
Ntina oyo tosengeli kondima ete Yehova alimbisá biso mpe ndenge Biblia emonisi ete alimbisaka bato oyo basalaki lisumu kasi babongoli motema.
1-2. Basumuki oyo babongoli motema bakoki komiyoka ndenge nini ntango Yehova alimbisi bango? (Talá mpe elilingi.)
MOKONZI Davidi ayebaki ndenge mayoki ya komema ngambo mpo na masumu oyo osalá kala ezalaka. (Nz. 40:12; 51:3; maloba oyo ezali likóló) Davidi asalaki mabunga ya minene na bomoi na ye. Kasi, amonisaki ete abongoli mpenza motema, mpe Yehova alimbisaki ye. (2 Sa. 12:13) Na yango, Davidi ayebaki mpe ndenge moto ayokaka kimya na motema ntango Yehova alimbisi ye.—Nz. 32:1.
2 Ndenge moko na Davidi, biso mpe tokoki koyoka kimya na motema ntango Yehova amoniseli biso motema mawa mpe alimbisi biso. Ezali mpenza likambo ya kobɔndisa koyeba ete Yehova andimaka kolimbisa masumu na biso, ata ya minene, soki tobongoli mpenza motema, toyamboli masumu na biso, mpe tosali nyonso mpo tózongela lisusu makambo yango te! (Mas. 28:13; Mis. 26:20; 1 Yoa. 1:9) Mpe ezali mpenza esengo koyeba ete soki Yehova alimbisi biso ezalaka lokola nde tosalaki ata lisumu yango te!—Ezk. 33:16.
Mokonzi Davidi akomaki nzembo ebele mpo na kolobela ndenge Yehova alimbisaka (Talá paragrafe 1-2)
3-4. Ndeko mwasi moko azalaki komiyoka ndenge nini ata nsima ya kozwa batisimo, mpe tokolobela nini na lisolo oyo?
3 Kasi na bantango mosusu, ekómaka ete tóndima mpenza te ete Yehova alimbisá biso. Talá ndenge esalemaki epai ya Jennifer, oyo abɔkwamá na baboti oyo bazalaki Batatoli ya Yehova. Kasi, ntango akómaki elenge, Jennifer akómaki kosala makambo ya mabe na kobombana. Bambula na nsima, azongelaki Yehova mpe nsukansuka akokisaki masɛngami mpe azwaki batisimo. Alobi boye: “Nakómaki kolinga mingi biloko ya mokili, kosala pite, kolangwa masanga, mpe kosilika makasimakasi. Na motó na ngai, nayebaki ete lokola nasɛngaki bolimbisi mpe nabongolaki motema, mbeka ya Kristo epɛtolaki ngai. Kasi, motema na ngai ezalaki kokoka kondima te ete Yehova alimbisá ngai.”
4 Na bantango mosusu, okokaka te kondima mpenza ete Yehova alimbisá mabunga oyo osalá kala? Yehova alingi tóndima ete alimbisá biso mpe tókitisa motema kaka ndenge Davidi asalaki. Na lisolo oyo, tokolobela ntina oyo tosengeli kondima ete Yehova alimbisá biso mpe nini ekoki kosalisa biso tóndima yango.
MPO NA NINI TOSENGELI KONDIMA ETE YEHOVA ALIMBISÁ BISO?
5. Satana alingaka kotinda biso tókanisa nini? Pesá ndakisa.
5 Ntango tondimi ete Yehova alimbisá biso, ekoki kosalisa biso tókwea te na moko ya mitambo ya Satana. Kobosana te ete Satana akosala nyonso oyo akoki mpo na kopekisa biso kosalela Yehova. Mpo na kokokisa mokano na ye, akoki koluka kotinda biso tókanisa ete masumu na biso ekoki kolimbisama te. Kanisá ndakisa ya mobali moko na Korinti oyo alongolamaki na lisangá mpo asalaki pite. (1 Ko. 5:1, 5, 13) Na nsima, ntango abongolaki motema, Satana alingaki ete bandeko ya lisangá yango báboya kolimbisa; bázala motema makasi mpe báyamba lisusu moto yango te. Satana alingaki mpe ete mobali yango oyo abongolaki motema amona ete akoki kolimbisama te; ‘azinda na mawa na ye oyo eleki ndelo’ mpo atika kosalela Yehova. Satana abongoli mokano na ye te; abongoli mpe te mayele oyo asalelaka. Kasi “toyebi malamu mayele na ye.”—2 Ko. 2:5-11.
6. Nini ekoki kosalisa biso tótika komiyoka ete tomemá ngambo?
6 Ntango tondimi ete Yehova alimbisá biso, tokozwa kimya mpo tokoyoka lisusu te ete tomemá ngambo. Mbala mingi ntango tosali lisumu, tomiyokaka ete tomemi ngambo. (Nz. 51:17) Komiyoka bongo ezali malamu, mpo lisosoli na biso ekoki kotinda biso tósala makambo oyo esengeli mpo tózongela kosala oyo ezali malamu. (2 Ko. 7:10, 11) Kasi, soki tozali kaka komiyoka lokola tomemá ngambo ata ntango molai nsima ya kobongola motema, tokoki kolɛmba nzoto mpe kotika kosalela Yehova. Ntango tondimi ete Yehova alimbisá biso, yango ekosalisa biso tótika komiyoka lokola tomemá ngambo; tokotya makambo ya kala nsima na biso. Mpe tokoki kokoba kosalela Yehova ndenge alingi tósalela ye: na lisosoli ya pɛto mpe na esengo makasi. (Kol. 1:10, 11; 2 Tim. 1:3) Kasi, ndenge nini tokoki kondimisa motema na biso ete Nzambe alimbisá biso?
NINI EKOKI KOSALISA YO ONDIMA ETE YEHOVA ALIMBISÁ YO?
7-8. Yehova ayebisaki Moize nini mpo na ye moko, mpe yango ezali kopesa biso elikya nini? (Kobima 34:6, 7)
7 Kanisá makambo oyo Yehova alobá mpo na ye moko. Na ndakisa, talá makambo oyo Yehova alobaki na Moize na Ngomba Sinai.a (Tángá Kobima 34:6, 7.) Yehova akokaki kolobela bizaleli ebele mpenza oyo azali na yango, kasi amonaki malamu ayebisa Moize ete azali “Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu.” Nzambe ya boye akoboya mpenza kolimbisa mosaleli na ye oyo asalaki lisumu kasi abongoli mpenza motema? Ata moke te! Soki asali bongo ekomonisa ete azangá mawa mpe azali motema makasi, nzokande Yehova akoki ata moke te komonisa bizaleli ya ndenge wana.
8 Tokoki kondima ete ndenge Yehova alobi ete azali na motema mawa, ezali mpenza bongo, mpo azali Nzambe oyo alobaka solo. (Nz. 31:5) Na yango, tokoki kondimela ye. Soki ozali kaka komiyoka lokola omemá ngambo mpo na masumu oyo osalá kala, omituna boye: ‘Nandimaka ete Yehova azali mpenza Nzambe ya motema mawa mpe ya ngɔlu, mpe ete akoboya ata mokolo moko te kolimbisa mosumuki nyonso oyo abongoli motema? Soki ezali bongo, nasengeli te kondima ete alimbisá mpe ngai?’
9. Soki Yehova alimbisi masumu na biso elimboli nini? (Nzembo 32:5)
9 Manyolá na makambo oyo Yehova asalisaki bakomi ya Biblia báloba na oyo etali ndenge oyo alimbisaka biso. Na ndakisa, talá makambo oyo Davidi akomaki mpo na kolobela ndenge oyo Yehova alimbisaka biso. (Tángá Nzembo 32:5.) Davidi alobaki: “Olimbisaki libunga na ngai, masumu na ngai.” Liloba ya Ebre oyo ebongolami na vɛrsɛ yango na “olimbisaki” ekoki kolimbola “otombolaki,” “olongolaki,” to “omemaki.” Ntango Yehova alimbisaki Davidi, ezalaki lokola nde atombolaki masumu na ye mpe amemaki yango mosika. Na nsima, Davidi azwaki kimya mpo Yehova alongolaki ye ngambo oyo azalaki koyoka liboso masumu yango elimbisama. (Nz. 32:2-4) Biso mpe tokoki kozwa kimya ya ndenge wana. Ndenge nini? Ntango tobongoli mpenza motema na masumu na biso, tosengeli te kokoba koyoka ete tomemá ngambo mpo na masumu oyo Yehova asili kolongola epai na biso mpe komema yango mosika.
10-11. Maloba ‘asepelaka kolimbisa’ emonisi biso nini mpo na Yehova? (Nzembo 86:5)
10 Tángá Nzembo 86:5. Na vɛrsɛ yango, Davidi alobi ete Yehova ‘asepelaka kolimbisa.’ Mpo na maloba yango, buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elobi mpo na Yehova ete: “Azali ‘moto oyo alimbisaka’; ezali ‘ndenge na ye.’” Mpo na nini Yehova asepelaka kolimbisa? Vɛrsɛ yango ebakisi boye: “Otondi na bolingo ya sembo mpo na baoyo nyonso babelelaka yo.” Ndenge tomonaki yango na lisolo oyo eleki, bolingo ya sembo etindaka Yehova akangama makasi mpenza na basaleli na ye ya sembo mpe atika bango te. Na yango, soki basali lisumu mpe babongoli motema, Yehova akokoba komonisa bolingo ya sembo na ye mpe “akolimbisa na motema mobimba.” (Yis. 55:7, msl.) Soki ozali kokoka te kondima ete Nzambe alimbisá yo, okoki komituna boye: ‘Nandimaka ete Yehova asepelaka kolimbisa, ete azalaka pene ya kolimbisa basumuki nyonso oyo babongoli motema mpe basɛngi ye amonisela bango motema mawa? Soki ezali bongo, nasengeli te kondima ete alimbisaki mpe ngai ntango nasɛngaki ye ete alimbisa ngai?’
11 Biblia elobi ete Yehova ayebi malamu ete tozali bato ya masumu, mpe yango ebɔndisaka biso. (Nz. 139:1, 2) Likambo yango emonani polele na nzembo mosusu ya Davidi oyo ekoki mpe kosalisa biso tóndima ete Yehova alimbisá biso.
KOBOSANA TE LIKAMBO OYO YEHOVA MPE ABOSANAKA TE
12-13. Na kotalela Nzembo 103:14, likambo nini Yehova abosanaka te, mpe yango etindaka ye asala nini?
12 Tángá Nzembo 103:14. Davidi alobaki ete Yehova “azali kobosana te ete tozali putulu.” Na maloba yango, Davidi amonisi moko ya bantina oyo Yehova asepelaka kolimbisa basaleli na ye oyo basalaki lisumu kasi abongolaki motema: Yehova abosanaka te ete tozali bato ya masumu. Mpo na kokanga ntina malamu ya likambo yango, tótalela maloba ya Davidi na likebi.
13 Davidi alobi ete Yehova “ayebi malamu ndenge oyo tosalemá.” Asalaki Adama “na putulu ya mabele” mpe ayebi ete bato, ata ya kokoka, bakoká na makambo nyonso te. Na ndakisa, basengeli kolya, kolala, mpe basengeli na mpema mpo bákoba kozala na bomoi. (Eba. 2:7) Kasi ntango Adama ná Eva basalaki lisumu, kozala bato oyo basalemi na putulu ezwaki mpe ndimbola mosusu. Lokola tozali bana na bango, tobotamaka bato ya masumu mpe ezaleli yango ya kozanga kokoka ememaka biso na kosala makambo ya mabe. Yehova asukaka kaka te na koyeba ete tozali bato ya masumu; Davidi alobi ete “azali kobosana te” likambo yango. Liloba ya Ebre oyo esalelamaki na esika wana ekoki kolimbola kosala likambo ya malamu. Tokoki koloba ete Davidi alingaki koloba boye: Yehova ayebi ete na bantango mosusu tokosala masumu; ntango esalemi bongo, asepelaka ntango tobongoli mpenza motema, amoniselaka biso motema mawa mpe alimbisaka biso.—Nz. 78:38, 39.
14. (a) Davidi alobaki nini mpo na komonisa ndenge Yehova alimbisaka? (Nzembo 103:12) (b) Ndenge nini ndakisa ya Davidi emonisi ete Yehova alimbisaka mpenza na motema moko? (Talá etanda “Na ndenge nini Yehova abosanaka ntango alimbisi?”)
14 Ntango Yehova alimbisaka biso, asalaka nini na masumu na biso? (Tángá Nzembo 103:12.) Davidi alobi ete ntango Yehova alimbisaka, atyaka masumu na biso mosika mpenza, “kaka ndenge epai moi ebimaka [ɛsti] ezali mosika mpenza na epai elalaka [wɛsti].” Ngámbo ya ɛsti ezalaka mosika mpenza na ngámbo ya wɛsti; bisika yango mibale ekoki kokutana te. Yango emonisi nini mpo na masumu oyo Yehova alimbisi? Buku moko oyo elimbolaka maloba ya Biblia elimboli yango boye: “Soki lisumu etyamaka mosika ndenge wana, tokoki kondima ete ata nsolo na yango, elembo na yango, to likanisi na yango mpe ezalaka lisusu te.” Kanisá naino: nsolo ya bilei to ya eloko moko boye ekoki kozongisa na makanisi na biso likambo oyo eleká. Kasi, ntango Yehova alimbisi, ezalaka lokola nde ata nsolo to elembo etikalaka te oyo ekotinda ye akanisa lisusu lisumu yango mpe apesa biso etumbu mpo na yango.—Ezk. 18:21, 22; Mis. 3:19.
15. Tokoki kosala nini soki tomipesaka kaka foti mpo na mabunga oyo tosalaki na kala?
15 Ndenge nini maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 103 ekoki kosalisa biso tóndima ete Yehova alimbisá biso? Soki omonaka kaka lokola Yehova alimbisá te masumu oyo osalaki na kala, okoki komituna boye: ‘Nabosani te likambo oyo Yehova mpe abosanaka te—elingi koloba, nabosani te ete Yehova ayebi ete nazali moto ya masumu mpe ete akolimbisa mosumuki oyo abongoli motema, ata mpe ngai? Lisusu, namikundwelaka kaka likambo oyo Yehova aponi kobosana—elingi koloba, nazali kaka kokanisa masumu oyo asilá kolimbisa, oyo akopesa ngai etumbu ata mokolo moko te mpo na yango?’ Yehova atyaka makanisi te na masumu oyo tosalá na kala. Biso mpe tosengeli kotya makanisi kuna te. (Nz. 130:3) Ntango tondimi ete Yehova alimbisá biso, ekosalisa biso tótika komipesa foti mpe tokokoba kosalela ye na esengo.
16. Pesá ndakisa oyo emonisi likama ya komiyoka kaka ete omemá ngambo mpo na masumu ya kala. (Talá mpe elilingi.)
16 Tótalela ndakisa moko. Komiyoka kaka lokola tomemá ngambo mpo na masumu na biso ya kala ezali lokola moto oyo azali komeka kotambwisa motuka wana azali kotala kaka talatala oyo elakisaka na nsima. Ezali malamu kotala talatala yango na bantango mosusu mpo ekoki kosalisa moto akeba na makama oyo ezali nsima na ye. Kasi mpo atambwisa motuka malamu, asengeli kotya miso na nzela oyo ezali liboso na ye. Ndenge moko mpe, kokanisa na bantango mosusu mabunga oyo tosalá kala ekoki kosalisa biso tózwa mateya mpe tózala na ekateli makasi ya kozongela yango te. Kasi soki totye makanisi kaka na mabunga yango, mayoki wana ya ngambo ekoki kopekisa biso tósalela Yehova malamu. Na esika tósala bongo, tótya nde makanisi na nzela oyo ezali liboso na biso, oyo ezali komema na bomoi na mokili ya sika oyo Nzambe alaki, epai makambo mabe ya kala “ekokanisama lisusu te.”—Yis. 65:17; Mas. 4:25.
Kaka ndenge sofɛlɛ asengeli kotala liboso na esika atalaka talatala oyo elakisaka na nsima, tosengeli kotya makanisi na mapamboli oyo ezali koya na esika ya kokanisa mabunga na biso ya kala (Talá paragrafe 16)
KOBÁ KONDIMISA MOTEMA NA YO
17. Mpo na nini tosengeli kokoba kondimisa motema na biso ete Yehova alingaka biso mpe alimbisá biso?
17 Tosengeli kokoba kondimisa motema na biso ete Yehova alingaka biso mpe alimbisá biso. (1 Yoa. 3:19) Mpo na nini? Mpo Satana akolɛmba te kosala nyonso mpo na kondimisa biso ete Yehova akoki te kolinga biso to kolimbisa biso. Ezala ndenge nini, mokano na ye ezali kaka moko: kotinda biso tótika kosalela Yehova. Tóyeba ete Satana akobakisa lisusu milende mpo ayebi ete atikali na ntango mokuse. (Em. 12:12) Tosengeli te kotika ye alonga!
18. Okoki kosala nini mpo ondimisa motema na yo ete Yehova alingaka yo mpe alimbisá yo?
18 Mpo omindimisa mpenza ete Yehova alingaka yo, salelá makanisi oyo tolobeli na lisolo oyo eleki. Mpo ondimisa motema na yo ete Yehova alimbisá yo, kanisá makambo oyo Yehova alobi mpo na ye moko. Manyolá na makambo oyo asalisaki bakomi ya Biblia bákoma mpo na ndenge oyo alimbisaka. Kobosanaka te ete ayebi malamu ete ozali moto ya masumu mpe akomonisela yo motema mawa. Mpe kobosanaka te ete ntango alimbisi, alimbisaka na motema mobimba. Soki osali bongo, okondima mpenza lokola Davidi ete Yehova azali na motema mawa, mpe okoloba: “Matɔndi Yehova, mpo olimbisi ‘libunga na ngai, masumu na ngai’!”—Nz. 32:5.
LOYEMBO 1 Bizaleli ya Yehova
a Talá lisolo “Pusaná penepene na Nzambe—Yehova alobelaki bizaleli na ye moko” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 01/05/2009.