Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 15/10 lok. 27
  • “Bókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Masolo mosusu
  • Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova ezali nini?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
  • Ndenge oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi ebongisami
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Tosala na bomoko elongo na college central
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Lisangani ya Mikóló-Bakambi esalaka ndenge nini lelo oyo?
    Banani bazali kosala mokano ya Yehova lelo oyo?
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 15/10 lok. 27
Elilingi ya likita ya komite moko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

“Bókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana”

KOBANDA na mobu 1992, Lisangani ya Mikóló-Bakambi etyá bankulutu oyo bakɔmɛli mpo na kosalisa bakomite na yango mpo ekokisa mosala na yango.a (Talá maloba na nse ya lokasa.) Bandeko yango, oyo bazali na kati ya “bampate mosusu,” basungaka Lisangani ya Mikóló-Bakambi to bapesaka yango mpenza mabɔkɔ. (Yoane 10:16) Pɔsɔ na pɔsɔ bakɔtaka na likita ya komite oyo batyá bango. Mokumba ya bandeko yango ezali ya koyebisa makambo oyo esengeli mpe kopesa makanisi. Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezwaka bikateli ya nsuka, mpe bandeko wana oyo basungaka yango, balandelaka mpo na koyeba soki bikateli oyo ezwamaki ezali kokokisama. Bandeko yango bandimaka mikumba nyonso oyo bapesaka bango. Bakendaka elongo na bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi na mayangani ya etúká ya minene mpe na mayangani oyo esangisaka mikili mingi. Batindaka bango mpe bákenda kotala babiro ya filiale lokola bamonisi ya biro monene ya Batatoli ya Yehova.

Ndeko moko oyo asali mosala yango kobanda mobu 1992 alobi boye: “Ntango nakokisaka mokumba na ngai, bandeko ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazalaka na ntango ya kotya makanisi na bango nyonso na makambo ya elimo.” Ndeko mosusu oyo aumeli na mosala yango mbula 20 alobi ete: “Ezali mpenza libaku moko malamu oyo nakokaki kutu kokanisa te.”

Lisangani ya Mikóló-Bakambi epesi bandeko oyo basungaka bango mokumba monene mpe ezalaka na botɔndi mingi mpo na mosala makasi oyo bandeko wana ya sembo basalaka. Tiká ete ‘tókoba kolɛngɛla bato ya ndenge wana.’​—Bafilipi 2:29.

a Talá etanda “Lisangani ya Mikóló-Bakambi ezali kotambwisa mosala ya Bokonzi” na mokapo 12 ya buku Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela! mpo na koyeba mikumba ya bakomite motoba ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi.

Bandeko oyo basungaka na bakomite ya Lisangani ya Mikóló-Bakambi

Komite ya Batambwisi

  • John Ekrann

  • Robert Wallen

Komite oyo etalelaka bandeko ya Betele

  • Gerald Grizzle

  • Patrick LaFranca

  • Daniel Molchan

  • Ralph Walls

Komite ya kobimisa mikanda

  • Don Adams

  • Robert Butler

  • Harold Corkern

  • Donald Gordon

  • Robert Luccioni

  • Alex Reinmueller

  • David Sinclair

Komite ya Mosala

  • Gary Breaux

  • Joel Dellinger

  • Seth Hyatt

  • Christopher Mavor

  • Baltasar Perla

  • William Turner

  • Robert Wallen

  • Leon Weaver

Komite ya Mateya

  • Ronald Curzan

  • Kenneth Flodin

  • William Malenfant

  • Mark Noumair

  • David Schafer

Komite ya Bokomi

  • Robert Ciranko

  • James Mantz

  • Izak Marais

  • Gene Smalley

  • John Wischuk

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto