Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w15 15/12 nk. 15-16
  • Monisá botɔndi mpo na bokabi ya Yehova

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Monisá botɔndi mpo na bokabi ya Yehova
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • NDAKISA YA BOKABI OYO ELEKI MONENE
  • “Mosala ezali monene”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2016
  • Moto oyo akabaka akopambwama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Yehova apambolaka mpenza ezaleli ya komipesa
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Batatoli ya Yehova bazwaka mbongo wapi mpo na misala na bango?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
w15 15/12 nk. 15-16
Mwasi moko azali kotya karte ya banki na aparɛyi moko

Monisá botɔndi mpo na bokabi ya Yehova

YEHOVA azali Nzambe oyo akabaka. (Yakobo 1:17) Tokoki komona bokabi na ye na biloko nyonso oyo asalá. Atondisá molɔ́ngɔ́ na minzoto, mpe atondisá mabele na milona ya kitoko.​—Nzembo 65:12, 13; 147:7, 8; 148:3, 4.

Mokomi ya Nzembo 104 azalaki na botɔndi mingi mpo na nyonso oyo Yehova asalá, yango wana akomaki loyembo moko mpo na kokumisa ye. Ntango otángaka nzembo yango, yo mpe ozalaka na botɔndi lokola mokomi wana ya nzembo? Alobaki boye: “Nakoyembela Yehova bomoi na ngai mobimba; nakobɛtɛla Nzambe na ngai mondule ntango nyonso oyo nazali na bomoi.” (Nzembo 104:33) Yo mpe olingi kosala lokola ye?

NDAKISA YA BOKABI OYO ELEKI MONENE

Yehova alingi ete tólanda ndakisa na ye ya bokabi. Ayebisi mpe biso ntina oyo tosengeli kokabaka. Na lisalisi ya elimo santu, ntoma Paulo akomaki boye: “Pesá bazwi ya ntango oyo mitindo ete bázala na lolendo te, mpe bátya elikya na bango te na bomɛngo oyo ekoki kobunga lelo to lobi, kasi nde epai ya Nzambe, oyo apesaka biso biloko nyonso beboo mpo biso tósepela; básala makambo ya malamu, bázala bazwi na misala ya malamu, bázala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba, bámibombela biloko ya motuya, elingi koloba, moboko malamu oyo bakotonga likoló na yango na mikolo oyo ezali koya, mpo básimba makasi bomoi ya solosolo.”​—1 Timote 6:17-19.

Na mokanda na ye ya mibale epai ya Bakorinti, ntoma Paulo alimbolaki makambo oyo esengeli kotinda biso tókabelaka basusu. Alobaki ete: “Moto na moto asala ndenge akani na motema na ye, na koimaima te to na kotindikama te, mpo Nzambe alingaka moto oyo apesaka na esengo.” (2 Bakorinti 9:7) Ntango tokabelaka basusu, nani azwaka matomba? Ntoma Paulo alobaki ete tosalisaka basusu ntango tópesaka bango biloko oyo bazali na yango bosɛnga, tomisalelaka mpe malamu mpo Yehova akopambola biso.​—2 Bakorinti 9:11-14.

Na nsima, ntoma Paulo alobelaki likambo eleki monene oyo emonisi bokabi ya Nzambe ntango alobaki ete: “Nzambe azwa matɔndi mpo na likabo na ye wana ya ofele oyo ekoki kolimbolama te.” (2 Bakorinti 9:15) ‘Likabo ya ofele’ wana ya Yehova etali mpe makambo nyonso ya malamu oyo apesaka biso na nzela ya Yesu Kristo. Tozangi maloba mpo na kolobela motuya ya likabo yango.

Ndenge nini tokoki komonisa ete tozali na botɔndi mpo na nyonso oyo Yehova ná Yesu basalá mpe bakosala mpo na biso? Lolenge moko ya kosala yango ezali ya kopesa ntango na biso, makasi na biso, mpe biloko na biso mpo na kosambela Yehova mpe kosalisa basusu báyeba ye. Tokoki kosala yango ezala tozali na mingi to moke mpenza.​—1 Ntango 22:14; 29:3-5; Luka 21:1-4.

Ndenge bato mosusu baponaka kopesa makabo mpo na mosala ya Bokonzi na mokili mobimba

Ndenge kaka ezalaki na ntango ya ntoma Paulo, lelo oyo mpe bandeko mingi ‘babombaka mwa eloko pembeni’ to babongisaka mwa mbongo oyo batyaka na bakɛsi ya makabo oyo bakomá “Mosala ya kosakola na mokili mobimba.” (1 Bakorinti 16:2) Sanza na sanza, masangá etindaka makabo yango na biro ya filiale ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bango. Moto akoki kotinda likabo na ye ya mbongo mbala moko na “Association Sans But Lucratif ‘Les Témoins de Jéhovah,’” 75, 13e Rue, Industriel, Limete-Kinshasa, République Démocratique du Congo, to na biro ya filiale oyo etalelaka mboka na bango. Ba-chèque oyo etindami na adrɛsi oyo totye awa esengeli kozala na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah.’” Moto akoki mpe kopesa babiju to biloko mosusu ya motuya. Esengeli kotinda yango nzela moko na mokanda oyo emonisi ete biloko yango ezali nde likabo.

KODEFISA MBONGO

  • Moto akoki kosɛnga banki moko etindela “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mbongo to akoki kosalela carte bancaire na ye mpo na kopesa Association mbongo. Na bafiliale mosusu, moto akoki kotinda mokanda na nzela ya site na biso jw.org to site mosusu oyo Association eponi.

  • Moto akoki kodefisa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mbongo mpo na mosala ya kosakola na mokili mobimba. Nzokande, soki kaka asɛngi mbongo na ye, bakozongisela ye yango. Mpo na koyeba makambo mosusu, komelá “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” na adrɛsi oyo ezali awa likoló to bengá na +243 (0)99 818 9791 to na +243 (0)81 555 1000.

LOLENGE MOSUSU YA KOPESA MAKABO

Longola kopesa makabo ya mbongo, moto akoki kopesa makabo na ndenge mosusu mpo mosala ya Bokonzi na mokili mobimba ekende liboso. Na ndakisa:

Asiranse: Moto akoki kokoma nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo na ye ya asiranse to ya pasyo soki akufi.

Kofungola kɔnti na banki: Moto akoki kofungola kɔnti na banki, kopesa certificat de dépôt, to kofungola kɔnti na banki na mbongo na ye ya pasyo na nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah,’” to kotya nkombo ya “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” mpo ezwa mbongo yango soki akufi, na kolanda mibeko ya banki ya mboka oyo azali.

Lotomo ya kozwa mosolo: Okoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa mosolo (titres et obligations) lokola likabo mpenza to kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa yango nsima ya liwa na yo.

Kopesa lopango to ndako: Moto akoki kopesa ndako to lopango na ye likabo, to soki ezali ndako oyo afandi, akobatela lotomo ya kosalela yango ntango azali naino na bomoi. Liboso ya kopesa biloko ya ndenge wana, esengeli koyebisa biro ya Batatoli ya Yehova ya mboka na bino.

Kotya mbongo na banki oyo ekobimisa benefisi: Moto akoki kotya mbongo na banki to kopesa mikanda lokola ndanga na nkombo ya Lisangani moko oyo Batatoli ya Yehova basalelaka. Na nsima, moto yango akobanda kozwa benefisi oyo mbongo yango ekobanda kobimisa mbula na mbula. Mpo na yango, Leta akokitisela moto yango mpako oyo asengeli kofuta na mbula oyo apesi likabo yango.

Testama: Moto akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” biloko to ndako to mosolo na mokanda ya kozwa libula oyo endimami na mibeko, to akoki kopesa “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” lotomo ya kozwa biloko oyo akotika. Soki moto asali mokanda mpo na kopesa lingomba lotomo ya kozwa biloko na ye ntango akokufa, Leta akoki kokitisa mpako oyo afutaka mpo na biloko yango. Maloba “lolenge mosusu ya kopesa makabo” emonisi ete moto oyo azali kopesa makabo ya ndenge wana asengeli kozwa bibongiseli mosusu.

Mpo na koyeba makambo mosusu, okoki kobenga, kokende to kokomela biro ya Batatoli na ekólo oyo ofandi. Biro ya filiale “Association ‘Les Témoins de Jéhovah’” B.P. 634, 75, 13e Rue, Limete-Kinshasa, République Démocratique du Congo. Telefone: +243 (0)998 189 791 to +243 (0)81 555 1000.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto